Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ba biyamba bayokani te mpo kopona moto akozwa esika ya Corneille Nangaa na CENI


Président Félix Tshisekedi azali kosolola na bakambi ye biyamba na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kosolola na bakambi ye biyamba na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Bakambi ya biyamba bayokani te mpo na kopona nani okozwa ebonga ya kokamba Commission électorale nationale indépendante, CENI, na esika ya Corneille Nangaa.

Bakutanaki mercreci na complexe scolaire Cardinal Monsengwo na Kinshasa kasi bandimi nanu te kosala mapopnami.

"Kotala ndenge ngambo inso eboyi kopesa tika mpe kolanda nungu nungu makasi ya kaniaka, lisusu na makanisi makoluka boyokani, mokambi ya likita amoni malamu te koleka na maponami," ekomami na liyebisi litiami manzaka na cardinal Frindolin Ambongo, vice-président ya CENCO na pasteur André Bokundoa, président ya ECC.

Ba candidats bazalaki misato. Bakambi ba biyamba balobi bakokutana mbala nsima kasi mokolo mopesami te. Bazalaki kokuktana na bosenga ya mokambi ya Assemblée nationale lokola mandat ya bureau ya CENI esili.

XS
SM
MD
LG