Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Minstre Sele Yalaguli afundi SG ya UDPS na Paquet ya Matete, Augustin Kabuya alobi eza maseki


José Sele Yalaguli ministre ya Misolo na Kinshasa, RDC, 7 juillet 2020. (Facebook/Joé Sele Yalaguli)
José Sele Yalaguli ministre ya Misolo na Kinshasa, RDC, 7 juillet 2020. (Facebook/Joé Sele Yalaguli)

Ministre ya Finances Sele Yalaguli afundi kalaka mokonzi ya UDP Augustin Kabuya na bazuzi mpo na maloba maye ya kokana mpe kotinda balandi baye kosala ye mabe.

Sele Yalaguli, moko na bayi FCC ya Joseph Kabila mokonzi ya kala, atindelaki mokandaki ya kofunda Augustin Kabuya mercredi na porcureur general ya Cour d’Appel ya Kinshasa/Matete.

Augustin Kabuya, kalaka mokonzi ya lisanga lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, alobi na Ouranga FM ete ayebi masano ya Sele Yalaguli.

"Aza moto ya lokuta, toyebi masano na ye"… "Akangi te misolo mpo na passeport ezala 100 dollars ? Akangi te lifuta ya Cour constitutionnelle ?" etuni Augustin Kabuya na Palais de la nation, elobi Ouragana FM.

Augustin Kabuya atangaki, na mitingi ya UDPS mpe liboso ya bapanzi sango, Sele Yalaguli na kokanga misolo ya lifuta ya basoda ba policiers na ntina ya kotinda bango na kotomboka na moknzi ya mboka.

Président Félix Tshisekedi azali kosala misala mya koyoka bato wuto koleka mposo moko mpo matata mazali kati na CACH (lingomba lya ye, kati na nini UDPS mpe ezwami) na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Félix Tshisekedi na Joseph Kabila basalaka boyokani nsima na maponami mpo M. Tshisekedi alongaki ebonga ya mokonzi ya mboka mpe FCC ezwaki bato mingi na maponami.

XS
SM
MD
LG