Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre Nene Nkulu mpe ministre Kitobo bapekisami kozwa mpepo ya kokende na bituka


Boko na ba ministres na nsima na likita na Primature, Kinshasa, RDC, 20 novembre 2020. (Primature RDC)
Boko na ba ministres na nsima na likita na Primature, Kinshasa, RDC, 20 novembre 2020. (Primature RDC)

Ministre ya Mosala Nene Nkulu mpe ministre ya Mines to ya Makele Willy Kitobo bakokati te kozwa mepo lelo na libanda lya mpepo ya N'Djili. Bayi DGM bayebisaki bango ete mitindo miwutaki na likolo.

Bopekisami bwa bango bosalami ntango matata mazali kati na boyokani ya masanga CACH ya Félix Tshisekedi mpe FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Ba ministres babale baye bazali ya FCC.

Bayi FCC bayebisi ete bazalaki na mokanda ya etinda motiami manzaka na Minsitre wa Yambo, Sylvestre Ilunga.

Mpo na nini mtata kaka na ba ministres babale baye ntango ba ministres basusu bazali na mobembo ?, emituni bayi FCC baye bapesaki eyano na bapanzi ango.

Mme Nkulu azali mokambi ya ngambo moko ya lisanga AFDC mpe azali kowelela yango na ngambo mosusu ekambami na Modeste Bahati oyo akatisi ngambo ya M. Tshisekedi.

Bayi DGM (Direction générale de migration) balobi été mokonzi ya mboka ayebi te likambo lya mobembo na bango.

FCC eyanoli ete Ministre wa Yambo nde apesaka nzela na ba ministres kokenda na etinda.

Ministre wa Yambo azali ya FCC.

FCC eboyi kozala na boyoki bato président Tshisekedi azali kosala wuto mposo moko mpo na koluka majorité ya sika kokamba mboka.

FCC nde ezwaki majorité na maponami malekaki le 30 décembre 2018.

XS
SM
MD
LG