Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

UDPS na nzela samedi mpo na kopesa maboko na ba consulltations mpe FCC mpo na kotelemela yango


Balandi ba UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na ndako ya lingomba na bango na Limete, Kinshasa, 21 décembre 2018.
Balandi ba UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na ndako ya lingomba na bango na Limete, Kinshasa, 21 décembre 2018.

Bayi UDPS, lisanga lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekdi ekani kokita o’bolabala samedi mpo na kopesa maboko na ba consultations ezali kosalama kasi bayi FCC ya mokonzi ya kala Joesph Kabila balobi bakotambola mpo na kotelemela yango.

Kalaka mokonzi ya UDPS, Augustin Kabuya nde asakolaki yango na balandi balisanga liye.

"Mokolo ya base motindami na nsima. Mokolo ya mposo mokoya, botamboli ya kopesa maboko mpenza na misala mya boyoki bato! O’mokolo mwa mposo, ozala mobali to mwasi, Congo esengeli eyoka!" elobaki Augustin Kabuya.

Nzonkande bayi FCC, lingomba lizali nsima na Joseph Kabila mokonzi ya kala, bango mpe bakani kotambola samedi kasi mpo na kotelemela boyoki bato boye.

UDPS ezali kati na CACH lingomba linene lisimbaki M. Tshisekedi na maponami.

Boyoka ya CACH na FCC bosalamaki nsima na maponami bozali kati na matata.

Président Tshisekedi azali koyoka bato na ntina ya kokela majorité ya sika ya kokamba mboka.

Président Tshisekedi asanganaki na FCC mpo yango ezali na majorité na parlement.

Bayi FCC bazali koboya boyokani boye.

XS
SM
MD
LG