Marin Fayulu, mokonzi ya ECIDE mpe moko na bakambi ba lingomba Lamuka, na Théodore Ngoy, banso ba candidats CENI esakolaki ete balongaki te maponami ma mokonzi ya mboka ya 2018, babengisami na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe.
Ambassadeur ya Etats-Unis na Kinshasa alaki na bakambi ba etuka ya Equateur, na nord-est ya RDC, lisalisi ya koleka zomi na mitano millions ya ba dollars mpo na bitumba na bokono bwa Ebola bozali kongala mpo na mbala ya 11 na RDC.
+Kagame alobi bapaya nde batie bobomi na RDC na mokongo ya Rwanda +Kagame akebisi baye bazali koluka kobebisa bokengi mpe kimya na Rwanda +Etat d'urgence ebakisami mikolo na Congo-Brazzaville +Basoda bazwi bokonzi bapesi IBK ndingisa ya komisalisa libanda lya Mali
Paul Kagame alobi rapport mapping ekelamaki na bikolo bizali linbanda na Afrika na ntina ya kobomba mbeba basalaki na mabele ma RDC mpe kopakola yango na Rwanda.
+Mosungi ya président Tshisekedi, Pierre Mutanga atiami na Makala mpo lingomba lya bato na yawuli +Kelasi ekobanda kozanga le 21 septembre na Congo-Brazzaville +Ambassade ya Etats-Unis esengi bokangami ya bato bazali koboma ba Okapi na Lomela +Bakanga 34 babimisami na boloko na Mbanza Ngungu
Directeur administratif ya Maison civile ya tata mokonzi akangami na kozela bosambisami bwa ye likolo lya lingomba lya bato ba yawuli bakangamaki na Kingabwa, eyebisi ACAJ, lisanga lya Congo lya bitumba mpo na bosembo na ntina ya bato banso.
Police ebetaki molinga mpe lokito mpe epanzaki bato baye babandi kotambola mpo na kosenga bobengani bwa ntoma ya Rwanda na Kinshasa.
+Major Ngoyi oyo atangama na bobomi Chebeya akangami na Lubumbashi mpe atindami Kinshasa +LUCHA na Filimbi batamboli mpo na kosenga bolongwi ya ntoma ya Rwanda +Bituluku bitambolaki na Bukavu mpo na boekngi ya Dr Mukwege +ONU esengi boluki ya moyi Ben Benoit Kabey abungi na Kenge
Major Chrsitian Ngoyi oyo atangamaki na bosambisami bwa liwa lya mobundi mwa makoki ma bomoto Floribert Chebeya, mokambi ya VSV (La Voix des Sans Voix) akangami na Lubumbashi mpe atindami na Kinshasa, endimi bayi mampinga mpe police.
Nzoto zomi ya bato bakufi na bitumba ya basimba minduki ya mangomba Ngumino na Twirwaneho ezwami lelo na mboka Bilalombili na Ngezi na territoire Fizi, na Sud-Kivu.
Bato baike batambolaki na Bukavu na Sud-Kivu, mpo na kopesa maboko na Prix Nobel ya kimya, Dr Denis Mukwege na bitumba na ye mpo na bosembo likolo na bobomi bosalamaka na Ekolo Congo démocratique.
+USA epesi etumbu na procureure ya CPI Fatou Bensouda +Matata asengi IGF kolandela makambo ma Bukanga-Lonzo +FECOFA esengi 26 bituka losala ba ligues na bango +Washington ekati ndambu ya lisungi epesaka Ethiopie mpo na barrage ya renaissance na bozongi boyokani na Soudan na Egypte
Augustin Matata Poyo Mapon, ministre wa yambo ya kala ya RDC, asengi na Inspection Générale ya Finances kolandela misala mya parc agricole ya Bukanga-Lonzo eye ekweyisama.
Mikolo minei mikoki bato ba bokangami basepesami bilei mpe mino te na boloko bonene ya Makala CPRK, na Kinshasa.
Lingomba lya Jean-Pierre Bemba, MLC (Mouvement pour la libération du Congo) esengi na mbulamatari kosala nyonso mpo na kosilisa bozangi bokengi na est ya mboka mpe na etando mobimba ya ekolo. Epameli bobomi mpe mbeba misusu esalami mikolo miye.
Mokambi ya BAD (Banque africaine de dévolppement) Dr. Akinwumi Adesina alapi ndayi mardi mpo kokoba misala mya botambwisi banki eye mpo na mibu mitano misusu.
+Basimba minduki bazwaki na makasi bana ba kelasi bazalaki kolingela na dissertation na Isiro +Lissouba atiami na lilita na France +Dr Mukwege asengi tribunal pénal mpo na RDC +Alpha Condé andimi kopesa nkombo mbala ya misato na maponami na Guinée
Misa mpe milulu misusu misalamaki yambo na bokundami ya Pascal Lissouba na Perpignan, na France. Mokonzi ya kala ya Congo-Brazzaville atiamie na lilita na France le 31 août na bozelaka bozongi bwa nzoto na ye na mboka. (Crédit DEB TV)
Jean-Marie Michel Mokoko, mokambi ya opposition na Congo-Brazzaville azongisami mboka o’mokolo mwa eyenga nsima na kozwa lisalisi na Turquie sanza moko.
+Bituku na bato batambolaki na Washington na 57e anniversaire ya lisikulu ya Martin Luther Kinger: "I have a dream" +UDPS ekebisi bato kotia na mokongo na yango bato ba yawuli bakangamaki na Kingabwa +Nzoto ya balanga nzembo ya mapasa babomamaki na kotumba ekundolami na Kinzau-Mvwete
Voir plus