Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame alobi rapport mapping ekelama na bapaya ba Afrika mpo na kapakola Rwanda


Président Paul Kagame ya Rwanda na Nairobi, Kenya, 11 février 2020.
Président Paul Kagame ya Rwanda na Nairobi, Kenya, 11 février 2020.

Paul Kagame alobi rapport mapping ekelamaki na bikolo bizali linbanda na Afrika na ntina ya kobomba mbeba basalaki na mabele ma RDC mpe kopakola yango na Rwanda.

Mokonzi ya Rwanda ayanolaki o’mokolo mwa eyenga na Agence ya sango ya Rwanda RBA.

"Nayoki ete bato baike bazali kotambola mpo na kotelemela ntoma ya Rwanda na Kinshasa. Namoni ntina na yango te. Ezali baye balingi te mboka na biso mibale ezala kaka na matata. Basepeli te ndenge tobongisi boyokani kati na biso. Ntoma Vincent Karega azali kosala mpo na boyokani ya bikolo na biso bokende liboso," eyanoli M. Kagame.

Bato baike batelemelaki ntoma Karega na Kinshasa o’mokolo mwa mitano kasi police ebenganaki bango na kobeta molinga mpe lokito.

Bato baye bazalaki kopamela makomi ma ntoma Karega na Twitter ya kobeta ntembe na bobomi basoda ba Rwanda basala na mabele ma RDC.

"Wana ezali makambo masalamaki kasi kasi balukaki kokomisa yango pete mpe koloba ete Rwanda nde esalaki yango. Ezali lokola bazwi bosoto bonso basalaki batie yango pembeni mpe babambi yango na mokongo ya Rwanda. Bazali kobomba mokumba bazali na yango," elibombli M. Kagame.

Mokonzi ya Rwanda alobi ete rapport elingaki kobwakama mpe bato balingaki bamona yango te soki nkombo ya mboka moko ya bapaya ezalaki na kati.

Mpo na ye, bikolo biye bya bapaya bizali kosalalela mangomba ma bana Congo mpe koloba na bango bazwaki mpasi mpo likolo lya Rwanda.

Paul Kagame alobi mpe Paul Russessabagina, moyi Rwanda ayebana mpo na abikisaki bato mingi na kobomba na hotel ya mille coline ntango ya genocide, akofuta mpo na misala mya koluka kobebisa kimya na mboka na ye. Mokonzi ya Rwanda akebisi bato basusu ata bazali na lisungi ya mboka lokola America. Paul Russessabagina akangamaki mposo moleki.

Awangani ete azali maladi lokola ezali kolobama mpe alaki ete sango oyo abisi sango yango akosuka lokola M. Russessabagina.

XS
SM
MD
LG