Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

MLC esengi mbulamatari kozwa mokumba ya bokengi na est


Mme Eve BAzaiba azali koyebisa Jean Pierre Bemba makambo na Kinshasa, RDC, 1er août 2018.
Mme Eve BAzaiba azali koyebisa Jean Pierre Bemba makambo na Kinshasa, RDC, 1er août 2018.

Lingomba lya Jean-Pierre Bemba, MLC (Mouvement pour la libération du Congo) esengi na mbulamatari kosala nyonso mpo na kosilisa bozangi bokengi na est ya mboka mpe na etando mobimba ya ekolo. Epameli bobomi mpe mbeba misusu esalami mikolo miye.

MLC etelemeli na liyebisi bobomi mpe mbeba misusu esalami mikolo mileki na monyele ya mboka.

"Tokoki kondimaEkoki kondimama te ete bilenge mibali mpe basi bakufa kaka mpamba boye mpe bazwama na makasi ntango mbulamatari ezali kotala mpe koloba eloko te. Lolenge mabe ya kobebisi lobi ya mboka songolo lozali kosala mabe na bilenge Lolenge ya mabe ya kobebisa mboka lozali kosalela bozwami na makasi lokola ebundeli eye badongola miso bazali kosala na nzoto ya basi," elakisi mokanda mwa MLC motiami manzaka na kalaka mokonzi na yango Eve Bazaiba.

Lingomba lya Jean-Pierre Bemba litasi mpasi na yango nsima na bana ba kelasi kokufa na masasi ma basimba minduki le 26 aout 2020 na mboka Ngoyi, na Masisi, na Nord-Kivu.

MLC epesi motango mwa bana lkelesi batano kasi bakonzi bapesaki motango mwa mibale ya bana ba kelasi bakufaki ntango ya momekano ya suka ya primaire TENAFET na mboka Ngoyi.

MLC etangi mpe lisusu bana ba kelasi ba suka ya secondaire baye bazwaki mbemba le 30 aout 2020 na basimba minduki baye bazwaki boko na bilenge baye na makasi mpe babotolaki bango biloko bya bango na esika bakazali komilengele kosala dissertation ya examen d'Etat na Isiro, na Haut-Uele.

"Bobomi mingi bosali na maternité na Haut-Katanga na bozangi botosi mpo na esika eye ya limemya," ekomi kalaka mokonzi ya MLC, Eve Bazaiba na liyebisi.

MLC epameli misala myango bayi politki mpe ba institutions inso kosala makasi mpo na kosuki yango.

.

XS
SM
MD
LG