Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Major Christian Ngoyi oyo atangama na liwa lya Chebeya akangami na Lubumbashi, atandami Kinshasa


Floribert Chebeya Bahizire mobundi ya makoki ma bomoto mpe mokambi ya VSV, Kinshasa, janvier 2010.
Floribert Chebeya Bahizire mobundi ya makoki ma bomoto mpe mokambi ya VSV, Kinshasa, janvier 2010.

Major Chrsitian Ngoyi oyo atangamaki na bosambisami bwa liwa lya mobundi mwa makoki ma bomoto Floribert Chebeya, mokambi ya VSV (La Voix des Sans Voix) akangami na Lubumbashi mpe atindami na Kinshasa, endimi bayi mampinga mpe police.

Commissaire provincial ya police ya Haut-Katanga, général Louis Second Karawa andimi yango na motuna ya correspondant ya VOA Lingala.

Christian Ngoyi amonaka wuto bosambisami mpo na liwa lya M. Chebeya.

Policier Paul Milambwe, oyo azalaki kosala na reception ya bureau ya général John Numbi, mokambi ya police na ntango wana, atanga nkombo ya Christian lokola moko na baye bazalaki konyokala M. Chebeya tin a liwa.

Paul Milambwe akimaki mpe akendaki na Dakar, na Sénégal mpo na kozela kosamba na tribunal africain kuna. policier Milambwe azali sika na Belgique.

Basusu mpe batangaka major Ngoyi lokola moko na bayi bataillon Simba ya gén. Numbi.

Kasi wuta mwa mibu, asengaka kozonga na Kinshasa mpo na kosamba na ntina ya likambo lyango.

Bato baike bazwaki etumbu na bosambisi bwa liwa lya M. Chebeya, lokola colonel Daniel Mukalayi oyo azwaki mibu zomi na mitano ya booloko.

Kasi babundi ba makoki ma bomoto bakoba kosenga bozongeli bwa bosambisi bwango.

XS
SM
MD
LG