Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Directeur administratif ya Maison civile ya Tshisekedi abwakami na Makala mpo na bato ba yawuli


Police etiaki maboko na bato ba lingomba limibengi "gardiens de la paix" na kingamba, na Kingabwa, Limete, Kinshasa, 26 aout 2020.(Twitter/Michael Tshibangu)
Police etiaki maboko na bato ba lingomba limibengi "gardiens de la paix" na kingamba, na Kingabwa, Limete, Kinshasa, 26 aout 2020.(Twitter/Michael Tshibangu)

Directeur administratif ya Maison civile ya tata mokonzi akangami na kozela bosambisami bwa ye likolo lya lingomba lya bato ba yawuli bakangamaki na Kingabwa, eyebisi ACAJ, lisanga lya Congo lya bitumba mpo na bosembo na ntina ya bato banso.

Mokambi ya ACAJ, Me Geoges Kapiamba nde apesi sango yango.

"M. Pierre Mutanga, directeur administratif ya Maison civile, akangami na bozeli kosambisama (MAP) na boloko ya Malaka wuto mikolo mibale na misala mya bosembo mya basoda," ekomi Me. Kapiamba na Twitter.

Ezali "mingi mpo na kopesa makoki na lingomba ya baton a yawuli. Makasi nde na mobeko," ebakisi Me. Kapiamba.

M. Mutanga azali sango mpe mokambi ya "Eglise catholique africaine".

Police ya Kinshasa ekangaki bato 23 na Kingakwa, na Limete, na Kinshasa, mpe mposo moleki esakolaki koluka bato basusu bazalaki kolanda malakisi ma ba soda mpe bokengi na bobuki mobeko.

Commissaire divisionnaire adjoint mpe mokambi ya police ya Kinshasa, Sylvano Kasonga, alakaki été bato banso bazali na likambo lyango esengelaki kokangama.

Masasi mabetamaki mercredi na jeudi ntango police ezalaki koluka kokanga bango.

Bato bango bazalaki, na bilamba ya ba civili, bazalaki koyemba ete bazali ba gardiens de la paix mpe bazali bokengi ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

Bakambi ba UDPS, lingomba lya politiki lya mokonzi Tshisekedi bakebisaki bato bazalaki koluka komemisa lyango mokumba mwa likambo layngo.

Kasi baike na bato bazalaki na eseki mpe bavandi balobi ete boko na bato na yawuli bango bazalaki kolaba bazali bayi UDPS.

XS
SM
MD
LG