Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fayulu na Théodore Ngoy babengisami na parquet ya Cour d’Appel ya Gombe


Martin Fayulu (3e G) na Théodore Ngoy (1er D) kati na ba candidats basusu basakolamaki na CENI ete balongi te maponami ma le 30 décembre 2018 mokonzi ya mboka, na Kinshasa, 25 décembre 2018.
Martin Fayulu (3e G) na Théodore Ngoy (1er D) kati na ba candidats basusu basakolamaki na CENI ete balongi te maponami ma le 30 décembre 2018 mokonzi ya mboka, na Kinshasa, 25 décembre 2018.

Marin Fayulu, mokonzi ya ECIDE mpe moko na bakambi ba lingomba Lamuka, na Théodore Ngoy, banso ba candidats CENI esakolaki ete balongaki te maponami ma mokonzi ya mboka ya 2018, babengisami na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe.

"Nazali lokumu ya kobengisa bino na ndako ya parquet général ya Cour d’Appel ya Kinshasa/Gombe, na local 2e niveau ya palais de justice, place de l’Indépendance na Gomba, mercredi oyo le 09/09/2020 na 11 heures mpo na likambo likoyebisamela bino kuna," ekomi officier ya ministère public Claver Kakengi na mokanda atindeli bango, moko moko.

Mposo moleki, lingomba lyoko Centre de réflexion juridique de la lutte contre l’impunité (CRJLI) lisakolaki ete efundi Martin Fayulu mpe Théodore Ngoyi mpo koluka komema bato na koyina mpe kotomboka.

Ezalaki nsima na Martin Fayulu koyebisaki o’libandela lya mposo moleki ete azali kopesa maboko na maloba ma Théodore Ngoy.

Théodore Ngoy, azala avocat lya ba magistrats ya Cour constitutionnelle babale baye baboyi kokende na Cour ya cassation nsima na président Félix Tshisekedi kotia bango kuna.

Me Ngoy alobaki ete mokonzi ya mboka abuki mobeko likonzi mpe esengeli abongisa na kozongisaka ba magistrats babale baye na Cour Constitutionnelle.

Emamaki nungu nungu mingi, mingi mpenza na bayi UDPS baye bapameli MM. Fayulu na ngoy.

XS
SM
MD
LG