Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Général Mokoko azongi Brazzaville nsima na lisali na lopitalo na Turquie


Le général Jean Marie Michel Mokoko, jugé et condamné à 20 ans de reclusions. (VOA/Arsène Séverin)
Le général Jean Marie Michel Mokoko, jugé et condamné à 20 ans de reclusions. (VOA/Arsène Séverin)

Jean-Marie Michel Mokoko, mokambi ya opposition na Congo-Brazzaville azongisami mboka o’mokolo mwa eyenga nsima na kozwa lisalisi na Turquie  sanza moko.

"General Mokoko azongisami mboka na kowuta Turquie mpe amemami na lopitalo ya ba soda na Brazzaville epayi wapi nayebaki kokutana na ye," etatoli mosambeli wa ye Eriv Ibouanga.

Général ya mibu 75, Jean-Marie Michel Mokoko azali na nse ya etumbu ya mibu 20 wuto 2019 nsima na kofundama na kozwama na minduki mpe masasi, mpe na koluka kokweyisa bokonzi.

M. Mokoko awelaki bokonzi na Denis Sassou Nguesso na maponami ma 2016.

"Amonani kozala nzoto malamu kasi esengeli asala ngalasisi mingi, likolo na mpasi na misuni," ebakisi Me Ibouanga.

Bakambi ba boloko balobi ete M. Mokoko akozonga na bokangami soki abimi lopitalo.

Akotaki lopitalo le 2 juillet na Brazzaville mpe atindamaki le 30 juillet na Turquie nsima masolo mingi na mbulamatari.

XS
SM
MD
LG