Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Akinwumi Adesina alapi ndayi mpo na kokamba lisusu BAD mibu mitano


AFDB ADB African Development Bank President Akinwumi Ayodeji Adesina - le président de la BAD
AFDB ADB African Development Bank President Akinwumi Ayodeji Adesina - le président de la BAD

Mokambi ya BAD (Banque africaine de dévolppement) Dr. Akinwumi Adesina alapi ndayi mardi mpo kokoba misala mya botambwisi banki eye mpo na mibu mitano misusu.

Milulu mya milakisamaki na visioconférence kasi misalamaki na Accra na Ghama na bokambami bwa ministre ya Finances ya Ghana Kenneth Ofori-Atta oyo azali mokambi ya Conseil ya dministration ya BAD.

"Lelo, arc-en-ciel (monama) ebimi mpo na bikolo 81 ya Banque africaine ya développement likolo na mapata ya bule ya Africa, na maloba moko – mpela eleki. Mapata ma moyindo maye mazalaki koia biso na nse mpe moleki. Natelemi lelo, na komitisa…," elobaki Dr. Akinwumi Adesina na maloba ma ye.

Moyi mboka Nigeria Dr. Akinwumi Adesina, na mibu tuku motoba, aponamaki mposo moleki na ntina ya kotikala na bokambi bwa banki boye mibu mitano misuu.

BAD esalisa bikolo bya Afrika na mabongisi mya ntambwa.

Bakambi mingi ya bikolo bya Afrika lokola Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville, Paul Kagame ya Rwanda balandi milulu myango na nzela ya visioconference.

Esengo na kozala na milulu mya bolapi ndayi ya Akin Adesina. Natombeli mokambi bolamu lokola abanda mandat na ye ya mibale na kosalela BAD. Ozali lipamboli nan gai, ekomi Pau Kagame.

Dr. Akinwumi Adesina azali mokambi ya mwambe na moto ya BAD.

.

XS
SM
MD
LG