Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington ebakisi 15,2 millions $ na bitumba na Ebola na Equateur (Mike Hammer)


Ntoma ya Etats-Unis na Kinshasa Mike Hammer azali koyanola na bapanzi sango na Mbandaka, Equateur, 7 septembre 2020. (Twitter/Ambssade ya Etats-Unis)
Ntoma ya Etats-Unis na Kinshasa Mike Hammer azali koyanola na bapanzi sango na Mbandaka, Equateur, 7 septembre 2020. (Twitter/Ambssade ya Etats-Unis)

Ambassadeur ya Etats-Unis na Kinshasa alaki na bakambi ba etuka ya Equateur, na nord-est ya RDC, lisalisi ya koleka zomi na mitano millions ya ba dollars mpo na bitumba na bokono bwa Ebola bozali kongala mpo na mbala ya 11 na RDC.

Mike Hammer azali na Mbandaka epayi wapi akutani na bakambi ba etuka mpe bayi bitumba na bokono bwa Ebola bozali kongala kuna.

"Nsima na kokutana na bakonzi ya etuka, ntoma ya Amerika asakoli na bapanzi sango na Eauqteur lisungi lisusu lya USAID ya 15.2 million. Yango ememi na koleka 23 millions $ lisalisi litiami mpo na kosukisa bokono bwa Ebola na Equateur. Elongo, tokosukisa Ebola." ekomi ntoma Hammer na Twitter.

Kino suka ya mposo moleki, bato 112 bayebani na kozwama na Ebola na Equateur, tuku minei na mwambe bakufi. Tuku mitano nde babiki.

Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya INRB, ya cellule techinque ya bitumba na COVID19, andimi kozala mokambi ya bitumba na Ebola lokola atiami mposo moleki na esika yango. Akamba bitumba mingi na Ebola wuto 1976.

XS
SM
MD
LG