Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata Ponyo asengi IGF kolandela bokweyisami ya Bukanga-Lonzo


Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.

Augustin Matata Poyo Mapon, ministre wa yambo ya kala ya RDC, asengi na Inspection Générale ya Finances kolandela misala mya parc agricole ya Bukanga-Lonzo eye ekweyisama.

Ministre wa yambo ya kala Ekolo Congo démocratique (avril 2012- novembre 2016), M. Matata oyo azali lelo mokeli mibeko, atindile IGF mokanda mpo na yango.

"Ekozala malamu, na kolanda bobangi ya bokambi mabe boye nasili nalobeli, ete IGF ezwa makambo na maboko, elendela ba comptes ezali mpo na mabongisi maye, wuta libandela lya misala kino sik’oyo…," ekomi M. Matata na mokanda mwango.

Bato minig balakisa M. Matata mosapi na kofundaka ye mpo na bokweyisi bwa mabongisi maye l’Etat abimisaki na mbala moko koleka 92 millions ya ba dollars.

M. Matata akomi ete azali kopesa maboko na mokano mwa tata mokonzi ya kobongisa bokambi ya makambo ma l’Etat. "Soki yango ekeyi nzela moko na botambwisi ya malonga, ekozala nzela ya bomati bwa nkita ya mboka na biso," abkisi.

Na eyano na mokanda yango, lingomba lya bitumba mpo na bomwana mboka LUCHA ekomi na Twitter ete bosenga ya M. Matata bozali likambo lilamu.

"...Masalo mazali na ngambo ma IGF, Cour des Comptes na parquet congolais," ekomi LUCHA.

Mikolo mileki, cabinet international Ernest & Young (EY) esalaki audit na bosenga ya ministre ya Finances mpo eloko ya 31 mars kino février 2015 na Buka-Lonzo.

EY elakisi ete société ya Afrique du Sud Africom Commodities eye ezalaki na boyokani na mbulamatari ya RDC, esalaki misala lolenge losengeli te.

Molili mozalaki na bokambi ya Africom Commodities mpo batia ata comptables na RDC, kolanda EY.

Africom Commodities ezali kosamba mpo na likambo lyango na mbulamatari ya RDC.

Na sanza ya mibale, ministre ya Milona, Joseph Antoine Kasonga, akutaki ete, ata mbulamatari epesaki misolo minso, misala mibanda ata te Bukanga-Lonzo.

Ministre Kasonga akutaki ba tracteurs ya sika kasi ba moteurs elongwa mpe etiama na balenières ya bato baike, ba tonnes ya ba engrais chimiques esundolama.

XS
SM
MD
LG