Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nzoto zomi ezwami nsima na bitumba ya ba Ngumbino na ba Twirwaneho na Fizi


Soda moko ya mampinga ma RDC liboso ya tribunal na Baraka, na Fizi, Sud-kivu, 17 février 2011.
Soda moko ya mampinga ma RDC liboso ya tribunal na Baraka, na Fizi, Sud-kivu, 17 février 2011.

Nzoto zomi ya bato bakufi na bitumba ya basimba minduki ya mangomba Ngumino na Twirwaneho ezwami lelo na mboka Bilalombili na Ngezi na territoire Fizi, na Sud-Kivu.

Société civile elobi ete lufilumelo moko azalaki kati ya baye bawei.

"Lisanga lya basimba minuduki ya ba Ngumino na ba Twirwneho lisaki bitumba na mboka Bilalombili na Ngezi lundi. Bato babale bakufaki, basusu bakimaki na esobe, basusu batumbamaki na moto ntango na bomoi na ndaku na bango," elobi mokambi ya sociétécivile ya Mikenge, Byaombe Eca.

Bayi Kivu Security eye ekambamaka na Human Rights Watch elongo na GEC (Groupe d’études ya Congo), bapesi motango mwa bato motoba baye bakufi.

XS
SM
MD
LG