Groupe d’Etudes sur le Congo ebimisi rapport moko mpo na kolakisa maye matambolaki te ntango ya bokono bwa Ebola ya mbala zomi bongalaki na monyele ya Ekolo Congo democratique. Toyoka moko na baluki ya GEC, Trésor Kibangulu.
+Mbulamatari epekisi kotimola makele na maboko na Kamituga +Mangomba 70 ma basimba minduki batie manzaka mpo na kotika bitumba, na Murhesa, na Sud-Kivu +FMI ebakisi milliards $ moko na Angola mpo na nkwokoso ya COVID19 +USA epesi etumbu na mwasi ya Yayah Jammeh
Balakisi bilongi ya mangomba 70 ya basimbuki batie manzaka na mokanda ya kotika bitumba na milulu misalaki mardi na Murhesa na Sud-Kivu na lisungi lya ONG ya Amerika Search for Common Ground.
Nsima na likama ya vendredi eleki, liye limemaki kufa na bato pene na 50, mbulamatari ezwi mokano ya kopekisa misala minso ya ba creseurs artisanaux na mine yango na Kamituga, na Sud-Kivu.
Leila Zerrougui, mokambi ya MONUSCO, misala ya ONU na Congo mpe molakisi na elongi ya kalaka mokonzi ya ONU, esengeli akutana mercredi 16 septembre na président Tshisekedi mpo na kobongisa bokutani bosengeli kotisa mitema na boyakani CACH-FCC.
+Kabila atosi mpe akokisi Buku likonzi bo' "homme d'Etat" (Mwilanya) +Trump asungi Israel, Emirats arabes unis mpe Bahreïn kosala boyokani +Libota ya infirmière ya moyindo endimi kotika kofunda ba policiers mpe kozwa 12 M $ na Kentucky +Mokonzi ya kala ya Mali, Moussa Traoré akufi
Ba Sénateurs mpe ba députés ya groupe parlementaire MLC "bakoti te kosala maseki mpo etali mbongwana ya misala mya maponami maye masengeli kotalisa mokumba ya baye baponami bakisa na etumbu."Yango nde maye bayokani na bokambami ya JP. Bemba.
+Koleka nzoto 19 ezwami nsima na bokweyisami ya mabele na mine na Kamituga na Sud-Kivu +Sassou abengisi likita lya bakonzi ba CEEAC na octobre +Bokutani ya bikolo ya Grands lacs na Goma botindikami +Museveni na Magufuli ya Tanzanie bayokani mpo na kotonga 140.000 km ya oléoduc
Bato mingi bakufi vendredi na bobukani ya mabele na mine moko ya wolo na engumba ya Kamituka, na Sud-Kivu, elobi bakambi ba enguma, .
Minganga na nkama mibale na tuku motoba na motoba ya Congo-Brazzaville bazongi mboka nsima koyekola misala mya bango mibu sambo na Cuba.
Ba Banyamulenge balobi batangi nzoto mitano na ngambo na bango mpe pene na 20 na ngambo ya basusu nsima bitumba bingalaki wuto mardi na Minembwe, na hauts-plateaux, na Sud-Kviu. VOA Lingala ebengaki mokambi ya commune ya Minembwe.
+Misala mya bosembo ya Belgique endimi ete linu ya E.P. Lumumba ezongiselama na libota lya ye +Bato baike bakufi na bitumba na Minembwe +Bayi FCC basengi botiami ya bakambi ba territoiriales bosalama na polele mpe na boyokani na banso +T. Lubanga ayambami na bituluku na Bunia
Kati na mitano mpe koleka zomi nde motango ya bato bakufi na bitumba bizali kongala kati na Banyamulenga na kabila misusu misatu (ba Bembe, ba Fulero na ba Nyundu) na hauts-plateaux ya Minembwe na Sud-Kivu.
+Parquet etiki kolandela Fayulu na Théodore Ngoy, elobi avocat na bango +Bayi loibota lya Mobutu basengi bobongisi ya lokumu ya ndeko na bango mpe ya ndako na ye ya Gbadolite +Dr. Mukwege na ba ntoma ya Amerika, Canada na UK bazali na Bandaka mpo na Ebola +Monusco ezongeli kobatela Dr. Mukwege
Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya INRB, azali na Mbandaka na Etuka ya Equateur nsima na kotiama bo’ mokambi ya bitumba ya bokono bwa Ebola bozali kongala mpo na mbala 11 na RDC.
Basoda ya Monusco, misala mya ONU na Congo, bazongeli kobatela Dr Denis Mukwege, prix Nobel ya Kimya ya 2018. Mingongo mingi miyokanaki kosenga bokengi ya monganga oyo abikisa basi bazwama na makasi nsima na maloba ya kobangisa ye.
DG to mokambi ya autorité ya aviation civile Jean Tshiumba Mpunga azwi etumbu ya mbulamatari nsima na bokweyisami na ballon ya Google Loon na Buta le 24 .août
Mokambi ya police ya Kinshasa, Commissaire divisionnaire adjoint Sylvano Kasongo alobi ete parque ya Cour d'appel ya Gombe/Kinshasa eyebisi ete etindi mokanda moko te mpo na kobengisa na Martin Fayulu Mafa mpe na Théodore Ngoy, boko na bayi opposition.
Mikanda mipesi mokolo mwa bozongeli bosambisami ya Vital Kamerhe, Samih Jammal na Jeannot Muhima mitendelami bango. M. Kamerhe azali nanu na lopitalo, elobi basungi baye.
+Théodore Ngoy asengi koyanola jeudi na parquet epayi abengisami na Fayulu +Mokonzi ya SCPT atiami na bokangami +Mbulamatari ezwi mayele masiki mpo na bokengi na Est +Washington ebakisi 15,2 millions $ mpo na bitumba na Ebola
Voir plus