Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba asengi na bakeli mibeko ya MLC basala maseki te mpo na mbongwana ya maponami


Jean-Pierre ya MLC (D) na Martin Fauylu na meeting na place Ste Thérèse N'Djili, Kinshasa, 23 juin 2019.
Jean-Pierre ya MLC (D) na Martin Fauylu na meeting na place Ste Thérèse N'Djili, Kinshasa, 23 juin 2019.

Ba Sénateurs mpe ba députés ya groupe parlementaire MLC "bakoti te kosala maseki mpo etali mbongwana ya misala mya maponami maye masengeli kotalisa mokumba ya baye baponami bakisa na etumbu."Yango nde maye bayokani na bokambami ya JP. Bemba.

Bakeli mibeko baye bakutanaki na masolo lundi na Jean-Pierre Bemba, mokeli mpe mokambi ya MCL (Mouvement pour la libération du Congo).

Esengameli bango mpe "kobunda mpo ete mbongwana epesa nzela ete bato banso bakoka kozala na maponami," elakisi liyebisi libimisamaki nsima na likita lya bango .

Mpo na MLC, bokambi bwa CENI bosengeli kozala ya pole.

Bitumba mpo na kobatela maye mazali na Buku likonzi, botelemeli bokabwani kolonda kabila to tribut ya bato mpe bomoko ya mboka nde ekozala maye bakeli mibeko bakosala na session eye efunwami le 15 septembre 2020.

XS
SM
MD
LG