Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami ya Kamerhe, Jammal na Muhima bokozongela le 18 septembre na Makala


Vital Kamerhe na bokeli bwa CACH na Nairobi, 23 novembre 2018.
Vital Kamerhe na bokeli bwa CACH na Nairobi, 23 novembre 2018.

Mikanda mipesi mokolo mwa bozongeli bosambisami ya Vital Kamerhe, Samih Jammal na Jeannot Muhima mitendelami bango. M. Kamerhe azali nanu na lopitalo, elobi basungi baye.

Kolanda mikanda myango mokolo mwa le 18 septembre nde moponami.

Samih Jammal, nkolo compagnie SAMIBO, na Jeannot Muhima, mosali ya import-export na présidence, bazwi mikanda myango.

Bosambisami bwango bosi bozongisami nsima pene na mbala minei.

Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi, ye, azali nanu na lopitalo, eyebisi bayi lingomba lya ye, elobi mosungi na ye mpo na sango, Michel Moto.

Ministre ya Juenesse Billy Kambale oyo asakoli mpe yango na meeting na ye na Goma, na Nord-Kivu.

Kasi bango babale balobi te esika yango ezali wapi.

M. Kamerhe atiamaki mposo moko moleki na centre Nganda na Kintambo, na Kinshasa.

M. Kamerhe akatelama etumbu ya mibu 20 mya misala makasi na boloko ya Makala (CPRK) mpo na kopengwisa misolo.

MM. Muhima mpe Jammal bango bazwaki etumbu ya boloko na esambeli ya yambo.

XS
SM
MD
LG