Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya police ya Kinshasa alobi parquet ewangani ete ebengisi Fayulu na Ngoy


Martin Fayulu, candidat ya Lamuka na maponami ya mokonzi ya mboka ya le 30 décembre 2018, na botambolai na Kinshasa, le 30 juin 2019.
Martin Fayulu, candidat ya Lamuka na maponami ya mokonzi ya mboka ya le 30 décembre 2018, na botambolai na Kinshasa, le 30 juin 2019.

Mokambi ya police ya Kinshasa, Commissaire divisionnaire adjoint Sylvano Kasongo alobi ete parque ya Cour d'appel ya Gombe/Kinshasa eyebisi ete etindi mokanda moko te mpo na kobengisa na Martin Fayulu Mafa mpe na Théodore Ngoy, boko na bayi opposition.

Nazwaki mbela ya parquet général près ya Cour d’appel, endimi te ete ebengisi Martin Fayulu mpe Théodore Ngoy. Bakoki bongo kokoba mosala basala bo’ momesano, elobi commissaire divisionnaire adjoint ya kinshasa, Sylvano Kasongo.

Théodore Ngoy alobaki na VOA Lingala ete ba huissiers ba kendaki kotikela mokanda ya mbela, lokola mpe eye ya Martin Fayulu.

Me Ngoy ayambaki yango mpe akomaki likolo na yango ete akokende koyanola jeudi.atindela VOA Lingala mikanda myango, likolo.

VOA Lingala emonaki mikanda myango.

Mposo moleki, lingomba lyoko Centre de réflexion juridique de la lutte contre l’impunité (CRJLI) lisakolaki ete efundi Martin Fayulu mpe Théodore Ngoyi mpo koluka komema bato na koyina mpe kotomboka.

Ezalaki nsima na Martin Fayulu koyebisaki o’libandela lya mposo moleki ete azali kopesa maboko na maloba ma Théodore Ngoy.

Théodore Ngoy, azala avocat lya ba magistrats ya Cour constitutionnelle babale baye baboyi kokende na Cour ya cassation nsima na président Félix Tshisekedi kotia bango kuna.

Me Ngoy alobaki ete mokonzi ya mboka abuki mobeko likonzi mpe esengeli abongisa na kozongisaka ba magistrats babale baye na Cour Constitutionnelle.

Emamaki nungu nungu mingi, mingi mpenza na bayi UDPS baye bapameli MM. Fayulu na ngoy.

XS
SM
MD
LG