Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato baike bakufi na bitumba kati na Banyamulenge na kabila esusu na Minembwe


Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.
Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.

Kati na mitano mpe koleka zomi nde motango ya bato bakufi na bitumba bizali kongala kati na Banyamulenga na kabila misusu misatu (ba Bembe, ba Fulero na ba Nyundu) na hauts-plateaux ya Minembwe na Sud-Kivu.

Motango ya bawei batano mopesami na bourgmestre ya Minembwe, Gadi Mikiza.

"Pene na bato zomi nde bakufi mingi mpenza na ngambo ya basimba minduki y aba Twirhanewo ya Banyamulenge," elobi lingomba lya bolukiluki mpo na bokengi KST (Baromètre ya bokengi ya Kivu).

Banyamulenge bazali kobuna na ba Bembe, na Ba Fulero na ba Nyundu, wuto bokelaki bwa commune ya Minembwe na 2019.

Bato bakufi ngambo inso mpe bato basusu bazoki, ebakisi Gadi Mukiza.

Kolanda KST, lingomba lya babundi ba kabila misato misusu nde ebundisaki Banyamulenge.

XS
SM
MD
LG