Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Muyembe na ba ntoma ya Amerika na Canada bazali ba Mbandaka bisika ya Ebola


Dr Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya IRNB mpe ya bitumba na Ebola, (G) apesani mbote na ntoma ya Amerika Mike Hammer elongona Mbadaka, Equateur, 8 septembre 2020. (Twitter/USA Embassy in Kinshasa)
Dr Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya IRNB mpe ya bitumba na Ebola, (G) apesani mbote na ntoma ya Amerika Mike Hammer elongona Mbadaka, Equateur, 8 septembre 2020. (Twitter/USA Embassy in Kinshasa)

Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya INRB, azali na Mbandaka na Etuka ya Equateur nsima na kotiama bo’ mokambi ya bitumba ya bokono bwa Ebola bozali kongala mpo na mbala 11 na RDC.

Mercredi, akitaki na Unité ya lisalisi ya Ebola (ETU) na Wangata eye Vision Mondial ebongeli na esika ya lisalisi ya babeli ya Ebola na lisungi ya USAID na Wangata. .

Dr. Muyembe azalaki elongo na ntoma ya Amerika Mike Hammer elongo na ba oyo ya Canada Nicolas Simard mpe ya Royaume Uni Emily Maltman baye bazali mpe kotala lolenge misala mizali kosalama kuna.

Bakendaki mpe na Centre ya transit intégré ya Alima esika bato basalaka ba tests o’libande la ya bokono.

Etats-Unis esakoli ete ebakisi 15,2 millions $ na bitumba na Ebola na Equateur mpe misolo mipesami mikomi 23 millions $.

XS
SM
MD
LG