Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

DG ya autorité ya aviation civile azwi etumbu nsima na bokweisami ya ballon Google Loon


Mokambi ya etuka ya Bas-Uele na lipinga lya mbulamatari na ye ne esika satelite moko ekwei na Buta, Bas-Uele, 25 août 2020. (Aliana Alipaganama)
Mokambi ya etuka ya Bas-Uele na lipinga lya mbulamatari na ye ne esika satelite moko ekwei na Buta, Bas-Uele, 25 août 2020. (Aliana Alipaganama)

DG to mokambi ya autorité ya aviation civile Jean Tshiumba Mpunga azwi etumbu ya mbulamatari nsima na bokweyisami na ballon ya Google Loon na Buta le 24 .août

Misala mya ye mitelemisami mpo na boyokani asalaki na société Loon LLC ya Etats-Unis na 2019 na kozanga koyebisa mbulamatari.

Boyokani bwango bopesaki ndingisa na ba ballons stratosphères koleka likolo na Ekolo Congo démocratique.

Ministre ya Transports na communication, Didier Manzenga apameli mpe mokambi autorité ya aviation civile lolenge akambaki na pobete likambo lya likama lya mpepo Busy Bee na Goma le 24 novembre 2019 na Goma. na Nord-Kivu.

Ballon moko ya Google Loon ekwayaki na Buta pene na Isiro na Bas-Uele le 24 aout eleki.

XS
SM
MD
LG