Azarias Ruberwa, Vice-Ministre wa Yamboe mpe ministre ya Décentralisation mpe mbongwana na ba instutitions alobi ete akendaki te na Minembwe (Sud-Kivu) mpo na kotia bourgmestre kasi mpo na bokengi mpe kimya.
Président Félix Tshisekedi asololi na mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba elongo na moyangeli ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda mpo na Cour constitutionnelle mardi 13 octobre na Cité ya Union africaine na Kinshasa.
Mosani ya ndemboi ya Portugal Cristiano Ronaldo azwami na COVID-19. Akozala te na lisano likobetama mercredi na Suède na Lisbonne (Portugal) mpo na Ligue des Nations.
+Mibu 69 wuto liwa lya Simon Kibangu, ba Kintuadi babandi kotonga nzela ya mpasi na ye mpe musée na Nkamba +Kelasi ezongi te na Beni, na Bandaka mpe bisika misusu +Fayulu azwi boyangeli ya Lamuka +Matata kati ba démocrates mpe ba républicains mpo na zuzi Amey Coney Barrett
Adolphe Muzito atikeli ebonga ya moyangeli mwa lingomba Lamuka na Martin Fayulu lundi na ndako ya lisanga Nouvel Elan na Kinshasa.
Le 12 octobre 2020, mibu 69 mileki wuto liwa lya Simon Kimbangu, mosakoli atemelaki bokonzi ya bayi Belgique na RDC, akufaki na boloko na Lubumbashi, na Haut-Katanga.
+PAM ezwi Prix Nobel ya kimya +Fayulu abengisi botamboli le 14 octobre mpo na rapport mapping mpe bomoko na mobimba ya RDC +Trump akosala milulu mya yambo wuto abima na lopitalo +COVID19 emati lisusu na mokili kasi Afrika ebatelami
Martin Fayulu abengisi botamboli le 14 octobre na etando mobimba ya ekolo mpo na kobatela mbomoko mpe mombimba ya RDC.
Président Félix Tshisekedi asakoli ete azwi mokano ya kotelemisa botiami ya Minembwe bo’ commune rurale, alobi yango na bokutani na bapanzi sango na Goma.
"Mokonzi ya mboka alaki kozwa mokano mpo etali bosakolami bwa commune ya Minembwe na ba ngonga ekoya. Abeti mokolo ete akosenga na ministre ya Intérieure kotelemisa likambo lya coomune rurale ya Minemwe," eyebisi molobeli ya Assemblée provinciale ya Sud-Kivu, Jacques Kamanda Amani.
Président Tshisekedi na bakokani ba ye Paul Kagame ya Rwanda, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Joao Lourenco ya Angola bandimi lisusu kosangisa makasi ma bango na ntina ya kosukisa ba forces négatives na basimba minduki na etuka ya Grands lacs.
Amerika elingi ete matata na monyele ya RDC masilisami na boyokani bwa kimya, elobi mardi ntoma ya Amerika na ONU, Kelly Craft, na likita lya bikolo.
+Kagame, Museveni, Lurenço na Tshisekedi bakozala na likita na visioconférence lelo +Bana bake 91 bakufabi na bitumba na sanza motoba ya yambo ya mobu na Ituri +Bolukiluki baozali kosalama mpo na liwa lya elenge Merveille Bazonsela +Pence na Harris bakondogwana lelo na tv
Procureur ya république ya tribunal ya grande instance ya Madingou na Cour d’appel ya Dolisie (Congo-B.) asokoli ete afungoli bolukiluki mpo na liwa lya Merveille Bazonzela nsima na ba policiers kokanga mpe kobeta ye mpo bozongi masque.
Ntoma Mike Hammer alobi nsima na masolo na président Félix Tshisekedi na Goma, ete Amerika epesi maboko na mabongisi ma Tshisekedi mpo na likita lya bakonzi ba Grands lacs. Charly Kasereka azwaki bililingi ya bokutani ya Félix Tshisekedi na Mike Hammer.
+Trump abimi lopitalo +Biytelo bikangami lisusu na baquartiers libwa na New York +Ba ministres ba Rwanda, Ouganda, Burundi, Angola mpe RDC bazali kobongisa likita lya bakonzi ba mboka biye na visiocnference ya mercredi +Police ebezanki bayi LUCHA na Goma
President Felix Tshisekedi abandi lundi na Goma, na Nord-Kivu, mobembo kati na bituka ya RDC.
+Trump akoki kobima lopitalo lundi +Bozwami ya COVID19 na Maison Blanche mpe na boko ya ba sénateurs républicains bokomisi matata bondimami bwa zuzi Amy Coney Barrett +Tshisekedi azo banda mobembo na monyele ya RDC na Goma +Bakima mboka ya Ethiopie 8 bakufi na kobwakama pene na Djibouti
+Biden alobi asambeli mpo Trump abika +Libota lya Habyarimana lipesi losoka na buluki bosolo ya Dr Mukwege +Sassou asololi kimya na RDC na motindami ya Guterres na Grands Lacs +Bato baike bakufaki na mpela ekasi na Ruboko na Masisi
Président Denis Sassou N’Guesso asololi mpo etali misala mya kimya na monyele ya RDC mpe na CIRGL na motindami mwa kalaka mokonzi ya ONU na etuka ya Grands lacs, Huang Xia, na Brazzaville.
Voir plus