Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame, Museveni, Lourenço na Tshisekedi bandimi lisusu kosangisa makasi mpo na kosukisa basimba minduki


Président Félix Tshisekedi na likita na bakokani ba ye Paul Kagame ya Rwanda, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Joao Lourenço na likita na visio conférence, Goma, 7 octobre 2020. (VOA/Charly Kasereka)
Président Félix Tshisekedi na likita na bakokani ba ye Paul Kagame ya Rwanda, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Joao Lourenço na likita na visio conférence, Goma, 7 octobre 2020. (VOA/Charly Kasereka)

Président Tshisekedi na bakokani ba ye Paul Kagame ya Rwanda, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Joao Lourenco ya Angola bandimi lisusu kosangisa makasi ma bango na ntina ya kosukisa ba forces négatives na basimba minduki na etuka ya Grands lacs.

Balobi yango nsima na likita lya ngonga misatu basalaki na visioconference na bokengisami ya présidence Tshisekedi oyo azali wuto mikolo mibale na Goma.

"Na mikolo miye, nzela mosusu ezali te soki kosangisa makasi ma biso te na ntina ya kolonga mondenge monso mpe kosukisa bitumba bizongelaka ntango inso mpe bizali kobebisa lobi ya bikolo bya biso na ban aya mboka na biso," elobi M. Tshisekedi.

Ministre ya mambi ma Bikolo bya bapaya ya RDC, Marie Ntuba Nzeza alobi ete bikolo biye bikobakisa mamkoki na misala misalamaka na etuka ya Grands lcas na ntina ya kokata makambo manso mamemelaka mislo na basimba minduki.

Mme Ntumba Nzeza ayebisi mpe lisusu ete bikolo biye bikobundisa elongo ba réseaux nmafieux (nzela ya moyibi inso) na etuka mpe na molongo eye epesaka nzela na bosaleli mpe mombongo ya makoki ma mabele ya etuka.

XS
SM
MD
LG