Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi, Thambwe Mwamba na Mabunda basololi likambo lya bazuzi Obulu na Kilombo ya Cour constitutionnelle


Mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba (C) elongo na mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda, na bokutani na président Félix Tshisekedi (amonani te) na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 13 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba (C) elongo na mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda, na bokutani na président Félix Tshisekedi (amonani te) na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 13 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asololi na mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba elongo na moyangeli ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda mpo na Cour constitutionnelle mardi 13 octobre na Cité ya Union africaine na Kinshasa.

"Makambo matali botambwisami ya Cour constitutionnelle ezalaki nde kati na bokutani bwa bango," elobi bayi présidence ya RDC.

Mikolo mileki, Me Théodore Ngoy, mosambeli ya ba zuzi babale ya Cour constitionnelle, Jean Obulu mpe Noël Kilombo, baye baboyi kokende na Cour ya cassation, akomelaki batambwisi ba Sénat na Assemblée nationale mpo na kosenga bango kotala likambo lyango.

Mpo na Me Ngoy, botiami na bango na Cour ya cassation mosalamaki na kobuka Buku Likonzi. "Mokonzi ya mboka abukaki Buku Likonzi, Tozali kosenga na ye azanga nsima mpe abongisa," elobaka Me Ngoy.

Mosambeli ya bazuzi Obulu na Kilombo alobaka ete esengeli mandat na bango ya mibu libwa esila to mpe esengelaki bazuzi baye bazela bobeti zete (tirage au sort) ya magistrature na sanza ya minei mpo bayeba soki balongwa to te. Bopeti zete esalamaka mibu minso misato.

Mokonzi ya mboka Tshisekedi ayanolaki, na mituna na bapanzi sango na Bruxelles mposo moleki, ete bazuzi baye baboyaki botiami na bango nsima na ndelo ya mikolo mipesama na mobeko.

Mpo na M. Tshisekedi bazuzi baye batiaki bango moko mosala na bango na mbeba.

Tokokutana lisusumikolo mikoya mpo na yango. Toyebisa mokonzi ya mboka kaka ete tovandisami likolo lya makomi, elobi M. Thambwe nsima na bokutani.

Tokanisi ete lolenge na biso ya komona makambo lolkoki mpe komema mayele na ndenge makambo mazali, elobi ngambo na ye Mme Mabunda,

Mokonzi ya mboka azali moto alandaka nde makomi, elobi boko na bayi nzinga nzinga ya président Tshisekedi nsima na bokutani boye.

XS
SM
MD
LG