Président Denis Sassou N’Guesso asololi na limpinga lya companie ya Italie ENI mpo na lolenge ya kokoba kozwa pétrole. Masolo mango masalami ntango esengeli Congo ezwa na maboko terminal pétrolier ya Ndjeno, na Pointe-Noire.
Bopesani bokonzi ya bokambi lingomba Lamuka kati na Adoplhe Muzito na Martin Fayulu bosalami lisusu te jeudi lokola esakolamaki.
1er octobre 2020… Mibu zomi mikoki wuto rapport mapping ya Nations unies ebimisaki. Na Kinshasa… Police epanzi bato balingaki kotambola na Kinshasa mpo na kosenga botiami na mosala ya rapport mapping ya Nations unies. Bato batambolaki bisika misusu na RDC.
+Mibu 10 wuto rapport mapping ebima: baike basengi tribunal international mpo na RDC lokola Dr. Mukwege +Ntoma ya USA asololi kimya na kabila inso ya Hauts Plateaux +Cour ya cassation ebakisi mibu na etumbu ya DG ya FONER, OVD mpe SOCOC +Unicef mpe OIM na bolukiluki mpo na bozwami basi na makasi
Cour ya cassation ebakisi mibu na etumbu ya bosambisambi ya kozongela ya ba DG ya FONER, Fulgence Lobota Bamaros, ya OVD, Benjamin Wenga mpe ya SOCOC Modeste Makabuza.
Ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer asololi na bato ba kabila bazalaka na matata na ba Hauts plateaux ya Sud-Kivu.
Président Félix Tshisekdi ayambami na président ya Conseil ya Europe Charles Michel Ministre wa Yambo ya kala ya Belgique na ndako Commission européenne, mercredi na Bruxelles .
Président Donald Trump, républicain, na vice-president ya kala Joe Biden, democrate, bandongwanaki mbala ya yambo na linaka lya television yambo na maponami ma mokonzi ya mboka ya 2020, na université ya Cleavland, na Ohio.
+Trump na Biden bandogwanaki na television mbala ya yambo +Ba astronautes banei ya USA bakopona mokonzi ya mboka wuto likolo +OMS ezali kosala bolukiluki na basali bazwaki basi na makasi mpo na Ebola +FECOFA epekisi DCMP kozwa basani mpe coach ya sika
OMS, Mabongisma ma molongo mpo na bokolongono, esakoli ete ezali kosala bolukiluki mpo etali bofundami ya bozwi basi na makasi na misala mya bitumba na Ebola na RDC.
Totala bondongwani bwa yambo kati na candidat ya ba démocrates, vice-président ya kala Joe Biden na oyo ya ba républicains, président Donald Trump, le 19 septembre na 21 heures ngonga ya est ya Etats-Unis to le 30 septembre na 1 heure TU. #VOAElections2020 #election#VOAElections2020 #election
+Police etiami na ekenge makasi na Lubumbshi nsima na Bakata Katanga kokota +USA elaki lisungi na police na Goma +Basambeli ba Dr. Oly Ilunga ba sengi Comité ya makoki mabomoto ya ONU kotala mbeba na bokangami bwa ye +Cedreic Bakambu aleki basani banso ya Beijing Gouan na mingete 50
Ba unités ya police nationale congolaise batiami na bokebi ya makasi na Lubumbashi kino mitindo misusu mikopesa, kolanda mobulu mosalamaki o’mokolo ya mposo na boloko ya Kasapa mpe na Bakata Katanga.
Président Félix Tshisekedi ayambamaki lobi na Ministre wa Yambo ya Belgique Sophie Wilmes na elomba. Basololaki mpo etali boyokani kati na bikolo mibale
Basimba minduki 16 bakufi elongo na ba polusu babale na soda moko ntango babundi ya Bakata Katanga bakotaki na Lubumbashi, na Haut-Katanga, samedi, elobi bakonzi.
Bato motoba bazoki makasi ntango bakangami bamekaki kokima na boloko bonene ya Kasapa, na Lubumbashi, na Haut-Katanga, elobi bayi bokengi.
Balandi ba mangomba maike mazali nsima na Vital kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala ya président Fétshisekedi, basalaki milulu vendredi liboso ya Palais ya justice mpo na kosenga botikami bwa mokambi na bango.
Bana ya Amerika bazali kopesa losako ya suka na zuzi ya Cour suprême ya Etats-Unis Ruth Bader Ginsburg oyo akufaki mposo moko mokoki na mibu tuku mwambe na sambo.
Président Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville asengi ete molongo motia liboso masolo kati na bana ya Libye. Na visiocoference, asengi kotala maye masololamaki na Brazzaville mpo na yango. Alobeli mpe bitumba basaimba minduki bazali kosala na est ya RDC mpe Centrafrique yambo na maponami.
+Dr Muyembe atangami kati na bato 100 baleki na mpifo na mokili +Cour internationale ya justice ekotinda ba experts kotala motuya nini Ouganda ekofuta mpo na bobomi mpe mbeba na RDC +Bokilo ya Edouardo dos Santos akangami mpo na kaniaka na Angola +USA epesi ba respirateurs 50 na RDC
Voir plus