Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cristiano Ronaldo azwami na COVID-19


Cristiano Ronaldo na lisano ya aller na Suède na Solna, Suède, 8 septembre 2020.
Cristiano Ronaldo na lisano ya aller na Suède na Solna, Suède, 8 septembre 2020.

Mosani ya ndemboi ya Portugal Cristiano Ronaldo azwami na COVID-19. Akozala te na lisano likobetama mercredi na Suède na Lisbonne (Portugal) mpo na Ligue des Nations.

Fédération portugaise ya ndembo (FPF) na makolo nde epesi sango yango na liyebisi.

Ronaldo amonisi te bilembo bya COVID-19 kasi atiami na bokangami na ndako, elobi FPF.

Basani basusu ba équipe ya Portugal batalamaki mardi na ntongo mpe bamonisami te na COVID-19.

Kasi na club na ye Juventus epayi awuti, basani basusu bazwami mpe COVID-19 mpe batiamaki na bokangami.

Basani basusu ya ba clubs misusu mpe bazwami na yango. Lokola Naby Keïta ya Liverpool.

Pene na basani zomi ya continent ya Afrika bazwami mpe na COVID-19.

Ba sanza eleki, Neymar na basani basusu ya Paris Saint-Germain ya France lokola Kylian Mbappé bazwamaki mpe na yango.

XS
SM
MD
LG