Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alobi likambo lya Minembwe likotalama yambo na bato ya mayele


Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na bokutani na bapanzi sango na Goma, Nord-kivu, 8 octobre 2020. (Twitter/Président
Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na bokutani na bapanzi sango na Goma, Nord-kivu, 8 octobre 2020. (Twitter/Président

Président Félix Tshisekedi asakoli ete azwi mokano ya kotelemisa botiami ya Minembwe bo’ commune rurale, alobi yango na bokutani na bapanzi sango na Goma.

"Mpo na nga lobiko ya bato nde lozali mobeko moleki na lintomba mpe nakoki te kotika bana mboka, koleka mingi bana mboka na ngai, bazala na likama. Yango, nazwi mokano ya kolongola maye masalamaki kino sika," elobi M. Tshisekedi mpo etali Minembwe.

Mposo moko moleki, ministre ya Décentralisation Azarias Ruberwa akomisaki Minembwe commune rurale mpe atiaki bougemstre na milulu misalamaki liboso ya ba ntoma ya bikolo bya bapaya baike. Kasi nungu nungu elandaki yango kati na bana ya Congo mingi.

Mokonzi ya RDC andimi ete likambo lya Minembwe libimisaka mbala inso matata mpo mokano moko te mozwama na ntina na yango.

"Mbala eye tokozwa mokano," elobi M. Tshisekedi.

Yambo alingi ete limpinga lya banganga mayele bakowuta bituka misusu kati na mboka likened na bonzindo mpo na likambo lya na ntina ya komema eyano eye ekopesa moto moko mpasi na nsima.

Mokonzi mboka ya RDC alobi milulu mya kotia bourgmestre mpe kokomisa Minembwe communue rurale misalamaki ntango azalaki na mobembo na Belgique.

Yango, nde azelaki kokita na yen a Goma mpo kosolola na bato mpe kozwa monkano.

Président Tshisekedi alaki kozonga na Goma mpe kovanda kuna mpo na koluka biyano na matata manso na monyele ya RDC.

XS
SM
MD
LG