Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akomi Goma


Président Félix Tshisekedi azali kopesa bakonzi ya mampinga mbote na libanda ya mpepo ya Goma, na Nord-Kivu, le 14 avril 2019. (Facebook/Pr♪0sidence de la RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kopesa bakonzi ya mampinga mbote na libanda ya mpepo ya Goma, na Nord-Kivu, le 14 avril 2019. (Facebook/Pr♪0sidence de la RDC)

President Felix Tshisekedi abandi lundi na Goma, na Nord-Kivu, mobembo kati na bituka ya RDC.

Akomaki na Goma, engumba mokonzi ya Nonrd-Kivu, nsima na 15h30 mpe ayambamaki na bituluku.

Mobembo mwa ye mosakolamaki te pene na mposo misatu mileki lokola mosakolamaki.

Ezalaki yambo mpo na likita na bakokani ba ye, bakonzi ba Rwanda, Ouganda, Burundi mpe Angola. Baike kati na bakonzi baye bazalaki na manaka masusu, lokola ya Burundi.

Basusu lokola Paul Kagame basengaki likita lyango lisalama na visioconference mpo na COVID-19.

Bayi présidence ya RDC balobi likita lyango likoki kosalama mbala eye na nzela lya visioconference ntango Felix Tshisekedi akozala na Norod-Kivu.

Nzoka nde ministre ya mambi ma bikolo bya bapaya, Marie Ntumba Nzenza azali na Burundi mpe amemi maloba ma boyokani.

Ministère ya mambi ma bikolo bya bapaya ya Burundi esakolaki ete Burundi esepelaki te kozala na likita na bakonzi basusu, mingi mpenza ya Rwanda, kasi basengaki boyokani kati na RDC na Burundi.

XS
SM
MD
LG