Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ruberwa alobi akendaki te na Minembwe kotia bourgmestre kasi mpo na bokengi mpe kimya


Azarias Ruberwa, Vice-Premier ministre mpe ministre ya Décentralisation, vice-président ya kala, na Kinshasa, 1 aout 2006.
Azarias Ruberwa, Vice-Premier ministre mpe ministre ya Décentralisation, vice-président ya kala, na Kinshasa, 1 aout 2006.

Azarias Ruberwa, Vice-Ministre wa Yamboe mpe ministre ya Décentralisation mpe mbongwana na ba instutitions alobi ete akendaki te na Minembwe (Sud-Kivu) mpo na kotia bourgmestre kasi mpo na bokengi mpe kimya.

M. Ruberwa alobi akendaki elongo na ministre ya Bobateli mboka , Aimé Ngoy Mukena, na etinda ya kimya mpe bokengi nsima na mokano mozwamaki na likita lya mbulamatari.

"Na mokanda ya etinda etikala te kozala likambo lya kotia bougemstre mpe natikali te kotia na ebonga bourgmestre," elimboli M. Ruberwa na eyano apesi bapanzi moko na Kinshasa.

"Ezali komonana polele, babambeli nga yango na ndenge ya lokuta," ebakisi ministre Ruberwa.

Matata mazali na ntina ya Minembwe kati na kabila evandi na mabele yango. Banyindu, Bafulero, Bavira mpe Babembe batelemelaka Banyumelenge na kolaba ete bazali Banya Rwanda mpe bawuta Randa. Mpo kabila eye Banyamulenge bakoki kovanda kasi kozwa mabele te lokola ya bakoko ba bango.

Ba ministres babale baye, MM. Rubwa na Noyi Mueka, bakendaki na Minembwe elongo na limpinga linene lya bakonzi basusu lokola mokambi ya mampinga, mokambi ya etuka ya Sud-Kivu mpe ministre ya intérieur ya Sud-Kivu.

M. Ruberwa alimboli ete bayi société civile ya Minembwe nde batunaki mpo na nini te bourgemstre ya Minembwe atiama na ebonga te lokola ba maires ya bingumba ya Uvira, Baraka mpe Kamituka baye bazwaki mokanda na bango nzela moko na ye.

Abakisi ete bourgmstre ya Minembwe asalaka mosala wuta atiamaki kasi botiami na ebonga ezali se milulu mpo na etali makasi ya makanisi.

Ministre ya mambi ya Kati ya Sud-Kivu lokola mpe mokambi ya Sud-Kivu bandimaki kosala milulu myango mpo bamonaki ete motuna yango mozalaki na nzela, elimboli M. Ruberwa.

Nungu ngunga mingi ebimaki nsima na milulu misalaki le 28 septembre na Minembwe.

Mokeli mobeko Muhindo Nzonga asengaki ministre Ruberwa kokende kolimbola na Assemblée nationale ntina nini bourgmestre ataimaki na esika.

Le 8 octobre bakeli mibeko ya opposition basalaki makelele mpe basengaki bureau kobengisa ministre Ruberwa. M. Ruberwa alobi nanu azwi mokanda ya kobengisa ye te.

"Ekozala libaku lilamu mpo na kosolola na na baponami ba bana mboka mpo ete bayeba bosolo. Nakanisi ete lokuta eye ezwi esika ya bosolo mposo mibale esengeli ebebisama," elobi M. Ruberwa.

Kaka le 8 octobre, président Félix Tshisekedi alobaki ete alongoli mokano ya botiami ya Minembwe bo’ commune mpe alakaki kotia limpinga lya banganga mayele na ntina ya kosukisa likambo lyango.

Kasi mokano na mikanda mizwami nanu te.

Martin Fayulu, motambwisi ya sika ya lingomba Lamuka, ebengisi bato kotambola mercredi 14 ocotbre mpo na yango.

XS
SM
MD
LG