Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu abengisi botamboli le 14 octobre mpo na rapport mapping mpe mpo na Minembwe


Martin Fayulu azali koyanola mituna ya VOA Lingala na Washington DC, 4 juillet 2020. (VOA/Roger Muntu)
Martin Fayulu azali koyanola mituna ya VOA Lingala na Washington DC, 4 juillet 2020. (VOA/Roger Muntu)

Martin Fayulu abengisi botamboli le 14 octobre na etando mobimba ya ekolo mpo na kobatela mbomoko mpe mombimba ya RDC.

Mokambi ya ECIDE mpe moko na batambwisi ya lisanga Lamuka alobi yango na bokutani na bapanzi na Kinshasa.

"Tokotambola te kaka mpo na Minembwe kasi yambo mpo na mbomoko mpe mombima ya RDC, elobi M. Fayulu.

Mpo na M. Fayulu, maye mazali kosalama na Minembwe suka na yango ekozala bokati ya Congo soki bana ba Ekolo bakebi te.

Akebisi mpo ete bana mboka mingi bolongalami bisika bavanda na mboka mingi ata na Rutshuru, Beni mpe Butembo.

Mposo moko moleki, ministre ya Décentralisation Azarias Ruberwa akitaki Minembwe na bakambi basusu mpe akomisaki yango commune rurale mpe atiaki motmbwisi (bourgmestre) na yango.

Jeudi, président Félix Tshisekedi asakolaki ete akotinda limpinga lya bato na meyele mpo na kotala na bozindo mpe kopesa eyano na likambo lya Minembwe.

Bakeli mibeko basalaki makele na Assemblée nationale mpo na kosenga ete ministre Ruberwa akende koyanola motuna ya moko na bakeli mibeko Muhindo Nzangi mpo na bokeli commune rurale ya Minembwe.

President Tshisekedi asakolaki ete alongoli mokano mokomisi Minembwe commune rurale.

XS
SM
MD
LG