Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou asololi mpo na misala mya Kimya na RDC mpe CIRGL na motindami mwa Guterres Huang Xia


Président Denis Sassou azali kosolola na motindami ya kalaka mokonzi mpona Grands lacs, Huang Xia, na Brazzaville, Congo, 2 octobre 2020. (Twitter/Présidence Congo-Brazzaville)
Président Denis Sassou azali kosolola na motindami ya kalaka mokonzi mpona Grands lacs, Huang Xia, na Brazzaville, Congo, 2 octobre 2020. (Twitter/Présidence Congo-Brazzaville)

Président Denis Sassou N’Guesso asololi mpo etali misala mya kimya na monyele ya RDC mpe na CIRGL na motindami mwa kalaka mokonzi ya ONU na etuka ya Grands lacs, Huang Xia, na Brazzaville.

Kolanda bayi présidence, bosombitinia bwa bango botalaki masolo mpe bokambi kati na mécanismes ya accord-cadre ya Addis-Abeba mpo na kimya, bokengi mpe boyokani na RDC (Ekolo Congo démocratique) mpe na etuka (Grands lacs), na bayi CIRGL (Conférence internationale ya région ya Bitima binene), na ntina kobomba kimya ekowumela na etuka ye.

Basololaki mingi mpo na maye mazali koleka mikolo miye.

Lundi 1er octobre na Luanda, na Angola, Huang Xia asololaki na président ya Angola João Lourenço nse mpo na makombo maye.

XS
SM
MD
LG