Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alaki kotelemisa botiami ya Minembwe bo' commune


Président Félix Tshisekedi na visio conférence na Goma, Nord-kivu, 7 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na visio conférence na Goma, Nord-kivu, 7 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)

"Mokonzi ya mboka alaki kozwa mokano mpo etali bosakolami bwa commune ya Minembwe na ba ngonga ekoya. Abeti mokolo ete akosenga na ministre ya Intérieure kotelemisa likambo lya coomune rurale ya Minemwe," eyebisi molobeli ya Assemblée provinciale ya Sud-Kivu, Jacques Kamanda Amani.

Président Félix Tshisekedi asolaki na bakeli mibeko baye na Goma, epayi wapi azali wuto lundi 5 octobre mpo na likita na visioconference na bakonzi ba Rwanda, Ouganda mpe Angola.

President nanu azwi mokano te kasi alaki bakeli mibeko kozwa mokano mokende nzela ya bosanga na bango, elobi moko na bayi présidence na VOA Lingala.

Bakeli mibeko baye basengi na président Tshisekedi kolongola mokano mokomizi Minembwe commune rurale.

Mposo moleki, ministre ya Décentralisation, Azarias Ruberwa, atiaki na esika bakambi ba commune eye na milulu misalamaki na miso mya ban toma bya bikolo bya bapaya mpe bakonzi basusu.

Kasi bato mingi batelemeli yango.

Moko na bakeli mibeko, Mohindo Nzangi, asengi na ministre Ruberwa kolimbola mokano mwa ye na Assemblée nationale.

Mpo na Mohindo Nzangi mpe basusu, Minembwe ekoki kozala commune tem po ezalina bavandi 20.000 te mpe mpo etando na yango eleki monene na lolenge etiami.

Matata mazali mingi mpo na mabele ma Minembwe kati na kabila ya Bafuliro, Babembe, Banyindu na Banyamulenge.

XS
SM
MD
LG