Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Industry Five ya Amerika elingi kobanda kokela ba tablettes na Kinshasa


Ntoma ya Amerika na Kinshasa Mike Hammer "Nzita" (C) akutani na balakisi bilongi ya Industry Five na Kinshasa, RDC, 27 juillet 2020. (Twitter/Mke Hammer)
Ntoma ya Amerika na Kinshasa Mike Hammer "Nzita" (C) akutani na balakisi bilongi ya Industry Five na Kinshasa, RDC, 27 juillet 2020. (Twitter/Mke Hammer)

Balakisi bilongi ba compagnie ya Amerika Industry Five bazali na Kinshasa na ntani ya kosilisa misala mya kotia misolo mpo na kokela ba tablettes wuta engumba mokonzi ya Ekolo Congo démocratique.

Esengelaki tablette mpe smartphone esalami na RDC ebima na usine le 1er juin, lokola esakolamaki na mobembo ya président Félix Tshisekedi na boko ya mbulamatari na Londres, na Grande Bretagne, na sanza ya yambo.

"Nakutani lelo na balakisi bilongi ya compagnie ya Amerika Industry Five baye bazali na Kinshasa mpo na kosilisa makambo ya botiyi misolo na ntina ya kosala ba tablettes ya malamu mingi na RDC mpo na kopesa mateya malamu mpe kokela misala noto yoko," ekomi compte Twitter na ye ntoma ya Etats-Unis na Kinshasa, Mike Hammer oyo amibenga na nkombo ya bayi RDC "Nzita".

Industrie etiaki manzata na mikanda mya boyokani na mbulamatari ya RDC, na nzela ya ministre Julien Paluku ya Industrie, le 21 janvier 2020 na Londres.

Industrie Five elobi na ntango wana ete ezali na makoki ya kokela ba smartphones na ba tablettes 1.400.000 na mobu moko na Kinshasa.

Elakaki mpe ete smartphone to tablette ya yambo esengelaki ebima na usine na Kinshasa le 1er juin kasi esalami te.

Elobami te na bokutani na ntoma Hammer mokolo nini misala mya bokeli smartphon na tablette yango mikobanda na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG