Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu asengi etumbu mpo na bobomami ya Kipupu mpe bolukiluki ya bayi molongo


Martin Fayulu azali koyanola mituna ya VOA Lingala na Washington DC, 4 juillet 2020. (VOA/Roger Muntu)
Martin Fayulu azali koyanola mituna ya VOA Lingala na Washington DC, 4 juillet 2020. (VOA/Roger Muntu)

Martin Fayulu, mokambi ya ECIDE (Engagement citoyen pour le développement) mpe moko na bakambi ba lingomba Lamuka asengi etumbu epesama na baye "babomi bato koleka 200 na Kipupu" na Sud-Kivu.

M. Fayulu oyo akoba komibenga "mokonzi oyo aponama" ("président élu") nsima na maponami ya le 30 décembre 2018, alobi wuta Etats-Unis epayi wapi akangama banda bokono bwa COVID19 ekota kuna, ete "ayoki mawa mpe nkanda mpo bobomami" ya bato baye.

Mbeba eye ya bomoto esengeli te etikala kozanga etumbu. Baye batindi mpe baye basali yango esengeli bayanola mpo na oyo basali," elobi M. Fayulu na compte Twitter na ye.

Mokambi ya ECIDE asengi bolukiluki ya bayi molongo mpe alobi ete mangomba ya bato basali yango bayebani malamu.

"Bobomi ya bana mboka boye bozongelaka mbala mingi, bobebisami ya mboka (ba villages) na mbako mpe bopunzami ya biloko na bango boyei kobakisama na mabongisi mpo na kobebisa esika eye ya ekolo na biso mpe kolakisa ete bandeko ba biso basundolama mpe bazangi moto akobatela bango," eyebisi M. Fayulu.

Bakeli mibeko ya Sud-Kivu balobaki ete Babanyamulenge babomamki bato 220 na Kipupu le 12 juillet.

KST, lingomba ya baye balendelaka bokengi na etando ya Kivu bapesaki motango ya 18 ya baye bakufi.

Mbulamatari ya Sud-Kivu esakoli ete bato basali yango ezali ba Ngumino na ba Twagiraheno, mangomba mabale ya babundi ya Babanyamuelnge. Mpo na mbulamatari bato koleka zomi nde bakufaki.

Bolukiluki bozali kosalama.

M. Fayulu apusi kozonga na ye na Kinshasa elengelamaki le 1er aout 2020 na mikolo mikoya.

Akozala le 2 aout na milulu mikosala na Washington mpo na kokanisa génocide ya bana ya RDC lokola alobaki yango na lisikulu na ye ya mokolo ya lipanda.

XS
SM
MD
LG