Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

TGI etindi Blattner kosamba na Tribunal de paix mpo asalaki nde abus de confinace

David Blattner (D) na DG ya SAFRICAS na président Félix Tshisekedi (G) elongo na ministre ya Finances, Sele Yalaghuli, bazali kosolola na chantier moko ya Saut-de-mouton, Kinshasa, 14 février 2020. (Faceboo

Tribunal ya grande instance ya Kinshasa/Gombe pesi te etumbu na David Blattner, nkolo ya SAFRICAS. Kasi etindi ye kosamba na tribunal de paix mpo na mbeba moke.

Tribunal ya grande instance ya Kinshasa/Gombe ekati ete mbeba moyi Amerika David Blattner, nkolo ya compagnie SAFRICAS, asalaki ezali te kobengwisa misolo mya mbulatari te. kasi ezali abus ya confiance (to kosala makambo boyokani te na ngambo mosusu).

Abus de confiance ezwaka etumbu ya mibu mitano mpe eabisamake te Tribunal ya grande instance, esengeli ekende ya tribunal de paix.

David Blatner asambisamaki mpo na misala mya mikolo nkama ya président Félix Tshisekedi. SAFRICAS ezali kotonga boko na ba sauts-de-moutons na Kinshasa.

Na eyeno na ye, David Blattner alobi bato baike balingaki baboma SAFRICAS kasi bakokoka te.

XS
SM
MD
LG