Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami bwa Kamerhe botindikami le 7 août


Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.
Vital Kamerhe, mokambi ya UNC, azali koyanola na bapanzi sango, na Kinshasa, 13 septembre 2014.

Bazuzi ya Cour d'appel batindiki bobandelami ya bosambisami ya Vital Kamerhe le 7 août. Balakisi bilongi ba ekolo bazalaki te na boloko bonene ya Makala.

Bosambisami bwa Vital Kamerhe bobandeli le 24 juillet na bosengi ya M. Kamere, mokambi ya ndako ya misala ya mokonzi ya Felix Tshisekedi na audience foraine na boloko bonene ya Makala (CPRK) na Kinshasa.

Bazuzi ya Cour d’Appel, tribunal ezali kosambisi yango sika, batindiki boyoki bwango le 7 août mpo na kopesa na basambeli ba ye libaku yakokisi makambu manso masengeli mpo na ngambo ya bafundi to partie civile.

Balakisi bilongi ya l'Etat bazalaki te. Kalaka ya tribunal to greffier akomelaki bango naino te.

Sanza moko moleki Vital Kamerhe aketelamaki etumbu ya mibu tuku mibale ya misala mya makasi bakisa na mibu zomi ya bopekisami makoki mapolitiki mpo na kopengwisa misolo mya botongi ndako na ntina ya mikolo nkama ya bokonzi ya Felix Tshisekedi.

M. Kamerhe na basambeli ba ye bakoba na kosenga ete bilembo bimonisi bopengwisi misolo bilakisama.

Bituluku na bato batombolaki o’balabala na Kinshasa mpo na Kamerhe, nsima na botamboli bosamaki lobo loleki na Bukavu.

XS
SM
MD
LG