Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mukuna asengi tribunal mosusu esambisa ye na Tshibola


Evêque Pascal Mukuna ya ACK na Kinshasa, le 4 février 2016. (Facebook/Evêque Pascal Mukuna)
Evêque Pascal Mukuna ya ACK na Kinshasa, le 4 février 2016. (Facebook/Evêque Pascal Mukuna)

Cour d’appel ezali kotinda bosambisami bwa évêque Pascal Mukuna mpo na kozwa na makasi Mamie Tshibola na tribunal mosusu, elobi ba avocats na ye.

Ba avocats ya Pascal Mukuna, motambwisi ya etonga ACK (Assemblée chrétienne de Kinshasas) mpe mokambi ya Eveil patriotique bayebisi ete Cour d’appel esengeli epesa nkombo ya tribunal mosusu le 21 juillet.

Baboyi Tribunal ya grande instance ya Kinshasa/Kalamu mpo bazali kofunda zuzi mokambi na yango Kibonge na koboya kopesa ekatali na ndelo ya ntango mibeko mipesi.

Ba avocats ya motamwisi ACK Pascal Mukuna batikaki vendredi na TGI Kalamu mokando ya mokano ya Cour d’appel ya kolongola bosambisami na maboko na yango mpo na koluka tribunal mosusu.

Basambeli ba M. Mukunda bafundi zuzi Kibonge na koboya bazuzi babale bazalaki kosambisa na ye mpe kozwa bazuzi misusu baye batiaki manzaka na bosambisami.

Yambo na yango, bazuzi bazalaki kosombisa M. Mukuna bakotaki kinzonzi le 17 juin 2020, kasi zuzi Kibonge asengeki kozongela koyoka lisusu ngambo inso le 3 juillet.

Yango nde esepelisi te bafundi na basambeli ya M. Mukuna.

XS
SM
MD
LG