Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba finalistes ya primaire na secondaire bakozongela kelasi le 3 août mpe ya ba universités le 10 août


Soda moko azali kokengela ndelo ntango bana kelasi bazali kokatisa ndelo ya Mpondwe kati na Uganda na RDC, 14 août 2019.
Soda moko azali kokengela ndelo ntango bana kelasi bazali kokatisa ndelo ya Mpondwe kati na Uganda na RDC, 14 août 2019.

Mbulatari ya Ekolo Congo démocratique esakoli ete "année" eye ekozala "blanche" te mpo na biteyelo, ezala ya nse to ya likolo. Session ordinaire ya Examen d’Etat ekosalama wuto le 24 kino le 27 août 2020, kolanda ministre ya EPST, Willy Bakonga.

Vice-Premier ministre mpe ministre ya Intérieur Gilbert Kankonde ayebisi. nsima na likita ya bayi mbulamatari, ete biteyelo ya EPST (Enseignement primaire, secondaire et tenichque) bikozonga le 3 août kasi mpo na bana ya kelasi ya suka (classe terminale).

Mpo na ESU (Enseignement supérieur mpe universitaire), biteyelo bikozonga le 10 août kasi kaka mpo na kelasi ya bato moke (doctorants, 2e Licences mpe 1er graduat).

"Nkisi ekotiama na ba universités nyonso wuto lobi (mardi 28 juin 2020), le 3 août ekozala bozongi ya ba personnels administratifs mpe le 10 août nde biteyelo bikofungwama mpo na bayekoli ya kelasi ya bato moke to ya suka ya likolo mpe ba universités ," elobaki ministre Kankonde.

"Ekozala na année blanche te. Ba services banso basengami kobongisa linaka malamu mpo ete bana bazongela kelasi," ebakisaki M. Kankonde.

VP Ministre Kankonde abeti seke ete malako ya komibatela na COVID19 lokola kolata masque mpe kosokola maboko makozala lotomo.

Bayi mbulamatari bayebisi te mokolo nini kelesami misusu etikali ekozonga.

Kelasi ekangamaki wuto koleka sanza minei, na mokano ya état d'urgence sanitaire mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi asakolaki.

XS
SM
MD
LG