Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu alaki botelemeli liboso ya Palais du peuple kino bosenga bwa ye bokondimama


Martin Fayulu, candidat ya Lamuka na maponami ya mokonzi ya mboka ya le 30 décembre 2018, na botambolai na Kinshasa, le 30 juin 2019.
Martin Fayulu, candidat ya Lamuka na maponami ya mokonzi ya mboka ya le 30 décembre 2018, na botambolai na Kinshasa, le 30 juin 2019.

Martin Fayulu, mokambi ECIDE (Engagement citoyen pour le développemenet) mpe moko na batambwisa ba Lamuka, abengisi bana ba RDC kozala "plan de sortie de crise" na ye ekondima.

M. Fayulu ayambamaki na bituluku na bato samedi na bozongi bwa na Kinshasa, nsima na sanza motoba libanda lya mboka. Asazalki elongo na Adolphe Muzito, mokambi mosusu ya Lamuka mpe motambwisi ya Nouvel élan.

Mokonzi ya ECIDE ayebisi mokolo akobengisa botolemeli te kasi alobi ekosalama kala mingi te. Alaki kopesa maboko na misala manso mpo na mbongwana na mboka.

"Toyoki mabaongisi makomi mingi. Toyoki ba 13 personnalités... M. Bahati apesi mpe ya ye mayele. Kasi nyonso wana eye nsima na 'plan de sortie de crise' na ngai," elobaki M. Fayulu.

Awutaki Etats-Unis epayi wapi akangamaki wuta COVID-19 engali.

Mokambi ya ECIDE akobaka koloba ete alongaki maponami ma mokonzi ya mboka ma le 30 décembre 2018.

M. Fayulu akundoli ete azalaki moto wa yambo ya kosenga mbogwana ya ba institutions mpe maponami ma lombango na plan na ye ya kobima na nkwokoso. "Yango wana na zongi awa," elobi ye.

M. Fayulu apameli CACH na FCC, mangomba ma bale mazali na boyokani ma kokamba mboka na président Félix Tshisekedi, na koluka kobungisa mayele ma bana mboka mpe kokisa mbamba.

"Soki ekoki kosalama te, tokokende na Palais du peuple. Ekokoma ndako na biso. Na sengi na diaspora batinda lisungi mpo moto moko moko akozala wana azwa mokolo nyonso ata boite ya sardine na lipa moko kino bakoyoka mongongo na biso," elobi M. Fayulu.

Mokambi ya ECIDE asengani minute moko mpo na baye bazali kokufa na est ya mboka mpe apamelaki baye bazali kobangisa Prix Nobel ya kimya Dr. Denis Mukwege likolo na bitumba na ye mpo na bosembo na mbeba inso na ngambo eye ya ekolo.

XS
SM
MD
LG