Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ntoma ya Amerika asololi mpo na kimya na kabila ezali na matata na ba Hauts plateaux


Ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, na balakisi bilongi na ya kabila na Minembwe, Mikende mpe Bijombo, Sud-Kivu, 30 septembre 2020. (Twitter/Mike Hammer)
Ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, na balakisi bilongi na ya kabila na Minembwe, Mikende mpe Bijombo, Sud-Kivu, 30 septembre 2020. (Twitter/Mike Hammer)

Ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer asololi na bato ba kabila bazalaka na matata na ba Hauts plateaux ya Sud-Kivu.

"Lelo nasangasaki balakisi bilongi ya kabila ya ba Babembe, Bafulero, Banyamulenge, Banyindu et Bashi na Minembwe, Mikende mpe Bijombo. Bango banso balingi kimya. Ba Congolais basengeli na libaku mpe kobika na kimya mpe na bozangi ya bobangisi ya mangomba ya basimba bitumba," ekomi Mike Hammer.

Ntoma ya Amerika na Kinshasa azali na monyele ya RDC wuto mposo moleki.

Mikolo mibale mileki, alakaki ete Amerika ekopesa police mapoko mpo na kosunga na bokolongo mpe kobatela makoki mabomoto.

XS
SM
MD
LG