Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Katumbi na Bemba basepeli te na maye mabongisami mpo na bokambi ya Fayulu na Lamuka


Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)
Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)

Bopesani bokonzi ya bokambi lingomba Lamuka kati na Adoplhe Muzito na Martin Fayulu bosalami lisusu te jeudi lokola esakolamaki.

Mibale kati na bakambi ya Lamuka, Jean-Pierre Bemba na Moïse Katumbi basengi yambo masolo mpo lolenge bokambami bwa bokosalama.

"Toyebisi na bato été na bosengi ya bakambi babale, na konda Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi, ya kozongela kosolola makambo mabale ya makasi ya liyebisi ya suka, bopesani ya bokambi kati na motambwisi ezali kobima, Adolphe Muzito na mokambi azali kokota, président Martin Fayulu, bopusani na mokolo mokoyebisamela bino nsima," elobi liyebisi litiami manzaka na Steve Kivwata, moko na balobeli ba Lamuka.

Adoplhe Muzito asili alekisa sanza misato na bokambi Lamuka kolola yango endima na bakambi banso.

Adoplhe na Muzito akangamaki na Belgique sanza minei mpo na COVID-19 mpe Martin Fayulu, na Etats-Unis nse mpo na bokono bwango.

Wuto bazonga Kinshasa, sanza mibale mikoki bopesani bokonzi bwango baosala te.

XS
SM
MD
LG