Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

LUCHA na Filimbi babengisi milulu mpo na kosenga bobengani bwa ntoma ya Rwanda


Ntoma ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 25 aout 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Ntoma ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, 25 aout 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Mangomba mabale ya bitumba ya bomwana mboka, LUCHA na Filimbi, mabengi bato le 4 septembre na milulu mya botelemeli ntoma ya Rwanda mpe kosenga bakonzi ya RDC kobengana ye.

Nkanda emataki kati na bana ba RDC wuto ntomba ya Rwanda na Kinshasa, Vincent Karega, apasaki moto moko eyano na Twitter mpo na etali bobomami ya bato koleka 1.100 na Kasika (Sud-Kivu) na basoda na Rwanda (RDF), koleka mibu zomi.

"Tosengi mbulamatari ya RDC kobengana sik’oyo ntima Vincent Karega na ntina ya kopalela ezaleli na ye eye efingi" (bana ba Congo), elakisi liyebisi ya mangomba mabele maye.

Ntoma Karega ayanoli na Jeune Afrique ete afingaki te mpe awanganaki te bobomami ya Kasika kasi atunaki nde mituna.

Ntoma ya Rwanda alobi ete alingaki nde moto akoma likambo ya Kaika apesa bilembo bya bobomami boye.

M. Karega alobi mpe lisusu ete mampinga ma Rwanda mazalaki kaka mango moko te na mabela ma Congo, kasi mazalaki elongo na ba FARDC ya RDC, na mampinga ma Angola, ma Angola, ma Zimbabwe mpe masusu.

Martin Fayulu, moko na bakambi ba oppsosition, asengaki mpe bobenganami ya M. Karega. Bayi politiki basusu mpe batombolaki mingongo.

M. Karega akundoli ete abotoma na RDC kasi azongaki na Rwanda.

Noma ya Rwanda alobi ete akoki te kosala mboka abotama mabe.

M. Karega abengisamaki na président Félix Tshisekedi nsima na kobimisa makambo mango na Twitter.

Makambo mango mabomamaki na Twitter nsima na bokutani na M. Tshisekedi.

Mikolo mileki boko na bakonzi ba Rwanda bakebisaki Dr Denis Mukwege nsima na ye kosenga bozongeli bwa rapport mapping.

XS
SM
MD
LG