Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CACH na FCC bazalaki te na Forum mpo na boyakani na ntina ya mbongwana na maponami


Botangi ya ba bulletins de vote nsima ya maponami, na Lubumbashi, RDC, 30 décembre 2018.
Botangi ya ba bulletins de vote nsima ya maponami, na Lubumbashi, RDC, 30 décembre 2018.

CACH ya président Félix Tshisekedi na FCC ya président ya kala Joseph Kabila, mangomba mabale mazali na boyokani ya kokamba mboka, bazalaki te na bofungwami lundi 24 août na Kinshasa, ya Forum mpo kobongisa mbongwana yambo na maponami ma 2020. Esalami na lisungi lya Université ya Liège, na Belgique.

Wuto dimanche, FCC ekundoli ete esi epasa makanisi ma bango.

Lisanga lya bakambi ba mangomba mpe maboke ya batu ya FCC elobaki ete masolo manso mpo na mbongwana ya misala mya mabongisa masengeli kosalama na Parlement.

Na ngambo na CACH, eyano emonisamaki na tweet Kitenge Yesu, molakisi elongi ya président Félix Tshisekedi akomaki le 22 août 2020.

"(TOLONGOLI MAFINGA)… Chantier (makombo ya kosala) ma yambo mazali dialogue te, ezali L’Etat,…" ekomaki na Twitter Kitenge Yesu.

Bob Kabamba, molakisi na Université ya Liège, alimboli na VOA Lingala ete akosala makasi mpo na kosolola na ngambo inso.

"Basasu soki bayoki dialogue bakanisi toye kokabola mabonga ma politiki, ezali bongo te. Tozali nde kobongisa mbongwana mpo na maponami mpe mayo tokozwa makomamema na ba institutions mpo na masolo masalama kuna," elimboli M. Kabamba.

Moïse Katumbi, Jean-Pierre, Martin Fayulu mpe Adoplhe Muzito bazali na bofugwami ya forum mpe bakozwa maloba.

XS
SM
MD
LG