Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakata Katanga 16 bakufi elongo na ba policiers babale na soda moko na bitumba na Lubumbashi


Bakata Katanga bakotaki na bibundeli na Lubumbashi
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:43 0:00

Bakata Katanga bakotaki na bibundeli na Lubumbashi

Basimba minduki 16 bakufi elongo na ba polusu babale na soda moko ntango babundi ya Bakata Katanga bakotaki na Lubumbashi, na Haut-Katanga, samedi, elobi bakonzi.

Bakatanga Katanga bakendaki na ndako ya television nationale RTNC mpe bitumba bingalaki.

"Motango ezali ete bato basalaki mobulu bakusi 16, mingi misusu bazoki mpe bakangami," eyebisi ministre provincial ya mambi ma Kati ya mboka ya Haut-Katanga, Phlibert Kunda Milundu.

"Bato mabe baye bakataki mitu ya ba policiers babale babomaki na ndako ya television nationale RTNC," ebakisi ministre provincial ya mambi ma Kati ya mboka ya Haut-Katanga.

M. Kunda ayebisi ete kimya ezongi na engumba mokonzi ya Haut-Katanga nsima na mosala bayi bokengi basali.

XS
SM
MD
LG