Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matanga ma zuzi ya Cour suprême Ruth Bader Ginsburg kati na boswani ya ba démocrates na ba républicains

Vice-président ya kala, Joe Biden, candidat ya ba démocrates na maponami ma le 3 novembre 2020, na bato basusu bazali kopesa losako na Ruth Bader Ginsburg, zuzi ya Cour suprême akufaki na mibu 87, na Congrès, Washington, 25 septembre 2020.

Bana ya Amerika bazali kopesa losako ya suka na zuzi ya Cour suprême ya Etats-Unis Ruth Bader Ginsburg oyo akufaki mposo moko mokoki na mibu tuku mwambe na sambo.

Nzoto na ye etiami lelo na ndako ya Congrès na Washinton. President Donald Trump apesaki ye losako mikolo mibale mileki na Cour suprême.

atanga ma ye mazali kosalama ntango bondongwani bozali mpo na botiami ya zuzi mosusu.

Donald alakika kopona zuzi mosusu lelo to lobi kasi ba démocrats balobi esengeli kozela molongi ya maponami ma mokonzi ya mboka ma le 3 novembre.

XS
SM
MD
LG