Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

OMS ezali kosala bolukiluki likolo na bofundi ya kozwa basi na makasi na nzela na Ebola


Katungo Methya, volontaire ya mibu 53, ya Croix Rouge ezali kopesa mateya mpo etali Ebola, na Beni, na Nord-Kivu, 7 avril 2020.
Katungo Methya, volontaire ya mibu 53, ya Croix Rouge ezali kopesa mateya mpo etali Ebola, na Beni, na Nord-Kivu, 7 avril 2020.

OMS, Mabongisma ma molongo mpo na bokolongono, esakoli ete ezali kosala bolukiluki mpo etali bofundami ya bozwi basi na makasi na misala mya bitumba na Ebola na RDC.

Liyebisi lya OMS libimi nsima na enketi moko ya ONG The New Humanitarian na kati na yango basi 50 bafundi basali ba OMS mpe ya ba ONG ezalaki na bitumba na Ebola kozwa to koluka kozwa bango na makasi.

OMS elobi ete basalali ba yango mingi "batukisami mitema na koyoka ete bato baike bazwaki basi na makasi na kolobaka ete basalaka na OMS ntango ya bokono bwa Ebola ya mikolo mileki", elobi OMS na liyebisi.

"Makamabo maye masalamaki na bato balobaki ete bazali basali ba OMS, makoki kondimama te mpe makolandelama na bolukiluki ya makasi," elobi liyebisi ya OMS.

"Tokotika te bizaleli ya motindo boye kati na basali ba biso, to ba sous-traitans na biso to mpe basungi ba biso," ebakisi OMS.

OMS elobi esalelaka politiki ya tolérance zéro mpo na maye matali kozwa basi na makasi.

"Moto nyonso azwami, na akozwa mbano ya bikela na ye, kino alongwa kaka mosala," elimboli OMS.

Liyebisi lya OMS libimi nsima na enketi moko ya ONG The New Humanitarian na kati na yango basi 50 bafundi basali ba OMS mpe ya ba ONG ezalaki na bitumba na Ebola kozwa to koluka kozwa bango na makasi.

Basi yango batatolaki ete basengaki kobipesa yambo bapesa bango mosala.

Mokambi ya OMS, Adhanom Gherbreyesus, asengaki bolukiluki ya bozindo mpo na yango.

Bokono mosusu ya Ebola ya mbala zomi na moko bozali kongala na RDC mpe bobomi bato 50 wuto juin.

Yambo na yango, bato 2.287 bakufaki na bokono ya Ebola ya mbala zomi bongalaki na monyele ya RDC. Ebola ya mbala zomi engalaki pene na mibu mibale wuto août 2018. Bato 3.470 nde bazwamaki na yango.

XS
SM
MD
LG