Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour ya cassation ebakisi etumbu na DG ya FONER, ya OVD mpe ya SOCOC


Président Félix Tshisekedi (1e G) akiti na chantier moko ya OVD pene na DG ya OVD Benjami Wenga na Kinshasa, RDC, 13 février 2020. (Twitter/Président RDC)
Président Félix Tshisekedi (1e G) akiti na chantier moko ya OVD pene na DG ya OVD Benjami Wenga na Kinshasa, RDC, 13 février 2020. (Twitter/Président RDC)

Cour ya cassation ebakisi mibu na etumbu ya bosambisambi ya kozongela ya ba DG ya FONER, Fulgence Lobota Bamaros, ya OVD, Benjamin Wenga mpe ya SOCOC Modeste Makabuza.

DG ya Fond national d’entretien routier FONER Fulgence Lobota Bamaros, DG ya Office des Voiries et Drainage (OVD ), Benjamin Wenga mpe DG ya Société congolaise de construction (SOCOC), Modeste Makabuza bazongelaki kosamba na bosenga na bango.

Fulgence Lobota mpe Benjamin Wenga bakomi na mibu mitano mya misala makasi na esika ya misato, mpe Modeste Makabuza akomi na yango mibale na esika ya moko.

Basambisami mpo na botongi nzela na ntima ya mikolo nkama ya président Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG