Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba unités nyonso etiami na ya police "alerte maximale" na Lubumbashi


Ba policiers na mutuka moko na Lubumbashi, Haut-Katanga, 9 décembre 2011.
Ba policiers na mutuka moko na Lubumbashi, Haut-Katanga, 9 décembre 2011.

Ba unités ya police nationale congolaise batiami na bokebi ya makasi  na Lubumbashi kino mitindo misusu mikopesa, kolanda mobulu mosalamaki o’mokolo ya mposo na boloko ya Kasapa mpe na Bakata Katanga.

Mokambi ya police na etuka ya Haut-Katanga, commissaire divisionnaire provincial Louis-Second Karawa nde apesi mitindo myango na parrade esalamaki na camp Police Est, na commune de Kampemba, na Lubumbashi.

Ba unités nyonso esengli ezala na bokebi makasi, elobaki commissaire divisionnaire Karawa.

O’kolo mwa mposo, bapoliciers babale mpe soda moko bakufaki ntango basimba minduki ya Bakata Katanga bakotaki o’ Lubumbashi.

16 Bakata Katanga mpe bakufaki. Minduki, makwangola mpe makonga mabotolamaki na maboka ya Baktanga Katanga.

Kasi vendredi, mobulu mosalaki na boloko bonene ya Kasapa epayi wapi bakangami batiaki moto na ndako nzike mpe bamekaki kokima.

XS
SM
MD
LG