Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Charles Michel bakutani mpo na kobongisa masolo kati na UE na RDC


Président Félix Tshisekedi na bokutani na président ya Conseil européen Charls Michel, ministre wa yambo ya kala ya Belgique, na Bruxelles, Belgique, 30 septembre 2020. (Twitter/Charles Michel)
Président Félix Tshisekedi na bokutani na président ya Conseil européen Charls Michel, ministre wa yambo ya kala ya Belgique, na Bruxelles, Belgique, 30 septembre 2020. (Twitter/Charles Michel)

Président Félix Tshisekdi ayambami na président ya Conseil ya Europe Charles Michel Ministre wa Yambo ya kala ya Belgique na ndako Commission européenne, mercredi na Bruxelles .

Basololi mpo na kobongisi masolo kati na Union europenne na RDC na ntina ya koyikisa boyakani makasi kati na ngambo ibale.

"Esengo koyamba na Bruxelles président Tshiseked," ekomi na Twitter, Charles Michel.

"UE ekokoba kopesa maoko na linaka lya ye ya mbngwana," elaki Charles Michel.

Président ya Conseil ya Europe ayebisi ete basolalki mpe lisusu makambo matali etuka ya kati ya Afrika, millona bya (ba), ndenge nini kotia misolo na lombango na RDC mpe kokolisa bondeko.

Président Tshisekedi akutanaki mikolo mibale mileki na Ministre wa Yambo ya Belgique Sophie Wilmes.

Tokundola été Yambo na mobembo mwa ye Président Tshsiekedi alakai libota lya nkondo Patrice Emery Lumumba kusnga mpo bozongi bwa eteni to linu likanisami été ezali lya Premier minsitre wa yambo ya RDC bamobomaka na 1961 na Lubumbashi na Haut-Katanga.

XS
SM
MD
LG